Mondule.
98 Bóyembela Yehova loyembo ya sika,+
Mpo asali makambo ya kokamwa.+
Lobɔkɔ na ye ya mobali, ɛɛ lobɔkɔ na ye mosantu, ememi lobiko.+
2 Yehova asali ete lobiko na ye eyebana;+
Alakisi bosembo na ye liboso ya bikólo.+
3 Akanisi motema boboto na ye, bosembo na ye oyo amoniselaki ndako ya Yisraele.+
Bansuka nyonso ya mabele emoni ndenge Nzambe abikisi biso.+
4 Mabele mobimba, bóganga na koganga ya bolongi mpo na Yehova.
Bósepela mpe bóganga na esengo mpe bóyemba mpo na kosanzola.+
5 Bóyemba mpo na kosanzola Yehova na nzɛnzɛ,
Na nzɛnzɛ mpe na loyembo kitoko.
6 Na bakelelo mpe na lokito ya liseke,+
Bóganga na koganga ya bolongi liboso ya Mokonzi, Yehova.
7 Mbu eganga lokola nkake mpe biloko nyonso oyo etondisi yango,
Mabele mpe baoyo bazali kofanda kuna.
8 Bibale ebɛta mabɔkɔ;
Bangomba eganga elongo na esengo+
9 Liboso ya Yehova, mpo azali koya kosambisa mabele.
Akosambisa na boyengebene bato oyo bafandi na mabele+
Mpe na bosembo bato ya bikólo.+