Nzembo 103:19 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 19 Yehova apiki makasi kiti na ye ya bokonzi na likoló;+Mpe bokonzi na ye eyangeli eloko nyonso.+ Matai 6:10 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Bokonzi+ na yo eya. Mokano na yo+ esalema mpe na mabele,+ lokola na likoló.