Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 32
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Baanzelu bakutani na Yakobo (1, 2)

      • Yakobo amibongisi mpo na kokutana na Esau (3-23)

      • Yakobo abundi na anzelu (24-32)

        • Yakobo akómi kobengama Yisraele (28)

Ebandeli 32:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “bakaa mibale.”

Ebandeli 32:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “esobe.”

Mitindami

  • +Eb 27:39; 36:8; Mib 2:5; Yos 24:4
  • +Eb 25:30

Ebandeli 32:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Nafandi mopaya.”

Mitindami

  • +Eb 31:41

Ebandeli 32:5

Mitindami

  • +Eb 30:43; 33:11

Ebandeli 32:6

Mitindami

  • +Eb 33:1, 2

Ebandeli 32:7

Mitindami

  • +Eb 27:41; 32:11

Ebandeli 32:9

Mitindami

  • +Eb 31:3, 13

Ebandeli 32:10

Mitindami

  • +Eb 28:15; Nz 100:5
  • +Eb 28:10; 30:43; 32:7

Ebandeli 32:11

Mitindami

  • +Nz 34:4
  • +Eb 27:41

Ebandeli 32:12

Mitindami

  • +Eb 28:14; 46:2, 3; Kob 1:7; 32:13; Mis 7:17

Ebandeli 32:13

Mitindami

  • +Eb 33:10

Ebandeli 32:15

Mitindami

  • +Eb 30:43

Ebandeli 32:18

Mitindami

  • +Eb 33:8

Ebandeli 32:20

Mitindami

  • +Eb 43:11; 1Sa 25:18

Ebandeli 32:22

Mitindami

  • +Eb 29:30; Rt 4:11
  • +Eb 30:3, 9
  • +Mib 3:16; Yos 12:2; Bas 11:13

Ebandeli 32:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

Ebandeli 32:24

Mitindami

  • +Hos 12:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2003, lok. 25

Ebandeli 32:25

Mitindami

  • +Eb 32:31, 32

Ebandeli 32:26

Mitindami

  • +Hos 12:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2002, lok. 29

Ebandeli 32:28

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “moto oyo abundaka na Nzambe” to “Nzambe azali kobunda.”

Mitindami

  • +Eb 35:10
  • +Hos 12:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2003, lok. 25

Ebandeli 32:29

Mitindami

  • +Bas 13:17, 18

Ebandeli 32:30

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “elongi ya Nzambe.”

Mitindami

  • +1Ba 12:25
  • +Eb 16:7, 13; Bas 6:22; Yn 1:18

Ebandeli 32:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Peniele.”

Mitindami

  • +Eb 32:25

Ebandeli 32:32

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mosisa ya mosuni ya ebɛlɔ.”

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 32:3Eb 27:39; 36:8; Mib 2:5; Yos 24:4
Eba. 32:3Eb 25:30
Eba. 32:4Eb 31:41
Eba. 32:5Eb 30:43; 33:11
Eba. 32:6Eb 33:1, 2
Eba. 32:7Eb 27:41; 32:11
Eba. 32:9Eb 31:3, 13
Eba. 32:10Eb 28:15; Nz 100:5
Eba. 32:10Eb 28:10; 30:43; 32:7
Eba. 32:11Nz 34:4
Eba. 32:11Eb 27:41
Eba. 32:12Eb 28:14; 46:2, 3; Kob 1:7; 32:13; Mis 7:17
Eba. 32:13Eb 33:10
Eba. 32:15Eb 30:43
Eba. 32:18Eb 33:8
Eba. 32:20Eb 43:11; 1Sa 25:18
Eba. 32:22Eb 29:30; Rt 4:11
Eba. 32:22Eb 30:3, 9
Eba. 32:22Mib 3:16; Yos 12:2; Bas 11:13
Eba. 32:24Hos 12:3
Eba. 32:25Eb 32:31, 32
Eba. 32:26Hos 12:4
Eba. 32:28Eb 35:10
Eba. 32:28Hos 12:3
Eba. 32:29Bas 13:17, 18
Eba. 32:301Ba 12:25
Eba. 32:30Eb 16:7, 13; Bas 6:22; Yn 1:18
Eba. 32:31Eb 32:25
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 32:1-32

Ebandeli

32 Na yango, Yakobo asimbaki nzela, akei; mpe baanzelu ya Nzambe bakutanaki na ye. 2 Ntango kaka Yakobo amonaki bango, alobaki ete: “Oyo ezali kaa ya Nzambe!” Mpe apesaki esika yango nkombo Mahanaime.*

3 Na nsima, Yakobo atindaki bamemi-nsango liboso na ye, epai ya Esau ndeko na ye na mokili ya Seire,+ na teritware* ya Edome,+ 4 mpe apesaki bango etinda ete: “Bokoloba boye na nkolo na ngai, na Esau: ‘Talá oyo mosaleli na yo Yakobo alobi: “Nafandi* epai ya Labana mpe naumeli kuna ntango molai tii sikoyo.+ 5 Mpe nazwi bangɔmbɛ-mibali, bampunda, bampate, basaleli ya mibali ná basaleli ya basi,+ mpe natindeli yo nkolo na ngai maloba, mpo nandimama na miso na yo.”’”

6 Ntango bamemi-nsango bazongaki epai ya Yakobo, balobaki ete: “Tokutani na ndeko na yo Esau, ye mpe azali na nzela mpo na kokutana na yo, azali elongo na mibali 400.”+ 7 Bongo Yakobo akómaki kobanga makasi mpe komitungisa.+ Na yango, akabolaki na bituluku mibale bato oyo bazalaki elongo na ye, ná bitonga, ná bangɔmbɛ mpe bakamela. 8 Alobaki ete: “Soki Esau abundisi etuluku moko, boye etuluku mosusu ekoki kobika.”

9 Nsima na yango, Yakobo alobaki ete: “Ee Nzambe ya tata na ngai Abrahama mpe Nzambe ya tata na ngai Yisaka, Ee Yehova, yo oyo ozali koloba na ngai ete: ‘Zongá na mokili na yo mpe epai ya bandeko na yo mpe nakosalela yo bolamu,’+ 10 ngai nabongi te na motema boboto nyonso mpe na bosembo nyonso oyo omoniseli mosaleli na yo,+ mpo kaka na lingenda na ngai oyo nakatisaki Yordani oyo, mpe sikoyo nakómi bituluku mibale.+ 11 Nazali kobondela yo+ obikisa ngai na lobɔkɔ ya ndeko na ngai Esau, mpo nazali kobanga ye noki aya kobundisa ngai,+ ná bamama elongo na bana na bango. 12 Mpe olobaki ete: ‘Na ntembe te, nakosalela yo malamu mpe nakokómisa bato ya libota na yo ebele mpenza lokola bambuma ya zɛlo ya mbu oyo ekoki kotángama te.’”+

13 Mpe alalaki na esika yango na butu. Bongo azwaki ndambo na biloko oyo azalaki na yango mpo na kopesa Esau ndeko na ye likabo:+ 14 bantaba-basi 200, bantaba-mibali 20, bampate-basi 200, bampate-mibali 20, 15 bakamela 30 oyo ezalaki komɛlisa bana na yango, bangɔmbɛ-basi 40, bangɔmbɛ-mibali 10, bampunda-basi 20 mpe bampunda-mibali 10, oyo ekɔmɛli.+

16 Apesaki basaleli na ye etonga mokomoko, mpe alobaki na bango ete: “Bókatisa liboso na ngai, mpe bósala ete ntaka ezala kati na etonga oyo na etonga oyo mosusu.” 17 Lisusu, apesaki na oyo ya liboso etinda ete: “Soki Esau ndeko na ngai akutani na yo mpe atuni yo ete: ‘Ozali moto ya nani, mpe ozali kokende wapi, mpe biloko oyo ezali liboso na yo ezali ya nani?’ 18 okoloba ete: ‘Ya mosaleli na yo Yakobo. Ezali likabo atindeli yo nkolo na ngai, Esau,+ mpe talá! ye moko azali nsima na biso.’” 19 Mpe apesaki lisusu etinda na oyo ya mibale, mpe na oyo ya misato, mpe na baoyo nyonso bazalaki kolanda bitonga ete: “Ndenge wana nde bokoloba na Esau ntango bokokutana na ye. 20 Mpe bokoloba lisusu ete: ‘Talá mosaleli na yo Yakobo azali nsima na biso.’” Mpo alobaki na motema na ye ete: “Soki nakitisi ye motema na likabo oyo natindi liboso na ngai,+ na nsima, ntango nakomona ye, akoki koyamba ngai na boboto.” 21 Bongo likabo yango ekatisaki liboso na ye, kasi ye moko alalaki na kaa na butu yango.

22 Na nsima, na butu yango, atɛlɛmaki mpe azwaki basi na ye mibale+ mpe basaleli na ye mibale ya basi+ mpe bana na ye 11 ya bilenge, mpe akatisaki Yaboke+ na esika oyo bakatisaka na makolo. 23 Bongo azwaki bango mpe akatisaki bango mokɛli* yango, mpe akatisaki biloko nyonso oyo azalaki na yango.

24 Nsukansuka, Yakobo atikalaki ye moko. Bongo mobali moko abandaki kobunda na ye tii ntɔngɔ etanaki.+ 25 Ntango mobali yango amonaki ete alongi ye te, bongo asimbaki litonga ya loketo na ye; mpe mokuwa ya loketo ya Yakobo elongwaki na esika na yango ntango azalaki kobunda na ye.+ 26 Nsima na yango, mobali yango alobaki ete: “Tiká ngai nakende, mpo ntɔngɔ ebandi kotana.” Na yango, Yakobo azongisaki ete: “Nakotika yo okende te tii okopambola ngai.”+ 27 Mobali yango atunaki ye ete: “Nkombo na yo nani?” Bongo ye alobaki ete: “Yakobo.” 28 Mpe mobali yango alobaki ete: “Bakobenga yo lisusu Yakobo te, kasi nde Yisraele,*+ mpo obundi ná Nzambe+ mpe ná bato, mpe nsukansuka yo olongi.” 29 Mpe Yakobo alobaki na ye ete: “Nabondeli yo, yebisá ngai nkombo na yo.” Kasi, ye alobaki ete: “Mpo na nini ozali kotuna nkombo na ngai?”+ Bongo apambolaki ye na esika wana. 30 Yango wana Yakobo apesaki esika yango nkombo Peniele,*+ mpo alobaki ete: “Namoni Nzambe na miso, kasi ata bongo natikali na bomoi.”+

31 Mpe moi ebimaki ntango alekaki pene na Penuele,* kasi azalaki kotɛnguma mpo na loketo na ye.+ 32 Yango wana tii lelo oyo, bana ya Yisraele balyaka te mosuni ya ebɛlɔ,* oyo ezali na litonga ya loketo, mpo asimbaki litonga ya loketo ya Yakobo pene na mosuni ya ebɛlɔ.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto