Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/10 nk. 21-24
  • Tozala batosi na liloba, nde bayoki mpamba te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozala batosi na liloba, nde bayoki mpamba te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Meka kososola liboso na kosambisa
  • Ndenge nini Bafalisai bazalaki ‘kofunga bokonzi’
  • “Lokola bakomeli na bango te”
  • Mateya maleki mateya nyonso
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Lisolo likoló ya Ngomba
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Bókoba kosala malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Boyengebene bokeseni na mibeko na bonkoko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/10 nk. 21-24

Tozala batosi na liloba, nde bayoki mpamba te

“Ezali baoyo nyonso te bakolobaka na ngai ‘Nkolo, Nkolo’ nde bakokota na Bokonzi na likolo, kasi moto oyo akosalaka mokano ya Tata na ngai oyo azali na likalo.”​—MATAI 7:21 MN.

1. Bayekoli na Yesu basengeli kolanda kosala nini?

BOLOMBAKA. Bolukaka. Bobetaka ekuke. Bolendendela kati na mabondeli, kati na boyekoli mpe na kotosa maloba oyo Yesu alobaki kati na Lisolo likolo na ngomba. Alobaki na bayekoli na ye ete bazali mongwa ya mokili; basengelaki kosenzela ete nsango yango ebungisa elengi na yango te, to mpe nguya na yango ya kobatela bomoi. Bazali pole ya mokili, mpamba te bazali kongengisa pole euti na Yesu Klisto mpe na Jéhovah Nzambe,bobele te na makambo oyo bazali koloba, kasi lisusu na oyo bazali kosala. Misala na bango mizali kongenga ná maloba na bango mpe lokola mpe mbala mosusu ezali na nguya kati na mokili oyo emeseni na bokosi lokola ya Bafalisai, oyo na bakonzi ya mangomba mpe bakonzi ya politike, baoyo bakolobaka mingi,nde bakosalaka moke.​—Matai 5:13-16.

2. Elendiseli nini Yakobo apesi biso, kasi etelemelo nini na libunga, bamosusu basili kozwa yango?

2 Yakobo apesi biso elendiseli oyo ete: “Bozala nde batosi na liloba, bobele bayoki mpamba te, komizimbisáká bino mpenza.” (Yakobo 1:22) Mingi bazali komizimbisa bango moko na komipesáká na liteya oyo elobi ete: ‘Soki obiki, obiki mpo na libela’, lokola soko nde bakokaki kotika misala nyonso sikawa mpo na kozela bobele oyo bango babengi mbano bakozwa na likolo. Ezali mpenza liteya ya lokuta mpe elikya ya mpamba, mpo ete Yesu alobaki boye: “Nde ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.” (Matai 24:13) Mpo na kozwa bomoi na seko, ‘esengeli komimonisa sembo, ata kino kufa.’​—Emoniseli 2:10; Baebele 6:4-6; 10:26, 27.

3. Mpo na oyo etali kosambisa, lilako nini Yesu apesi kati na Lisolo likolo na ngomba?

3 kati na Lisolo na ye likolo na ngomba, Yesu apesi batoli mosusu oyo baklisto basengeli kosala milende mpo na kolanda yango. Tala moko oyo, ata emonani lokola ezali mpasi te, kasi ezali kokweisa ezaleli moko oyo ezali mpasi mpo na kolonga yango: “Bosambisaka te mpo ete basambisa bino te; mpamba te na esambiseli ekosambisaka bino, bakosambisa bino na yango; mpe na emekeli ekomeka bino, bakomeka bino na yango. Mpo na nini okotala lititi oyo ezali na liso na ndeko na yo naino okanisi libaya lizali na liso na yo moko te? Boni okoloba na ndeko na yo ete: ‘Tika ete nalongola lititi na liso na yo, naino libaya ezali na liso na yo mpenza?’ Yo mokosi! longola libaya ezali na liso na yo mpe tala, okomona polele mpo na kolongola lititi na liso ya ndeko na yo.”​—Matai 7:1-5.

4. Lilako nini lisusu ebakisami Luka alobeli yango, mpe nini tokozwa na kosalela yango?

4 Engebene makambo Luka akomaki mpo na Lisolo likoló na ngomba, Yesu alobaki na bayoki ete babimisa mabe ya bazalani na bango libanda te, kasi balanda nde kolimbisa bango na mabunga na bango. Ezalela yango esengelaki kopusa bato mosusu na kozongisela bango mpe boboto, lokola oyo Yesu amonisaki na maloba oyo ete: “Bókabela baninga biloko mpe bakokabela bino lokola; bakotondisa biloko bya bino, bakofina mpe bakoningisa byango mpo ete bitonda meké; mpo ete na emekeli bakomekaka mpo na baninga, bakomeka na yango mpo na bino lokola.”​—Luka 6:37, 38 (Liloba lya Nzambe).

5. Mpo na nini ezalaka mpenza mpasi te na komona mabunga ya bato mosusu na esika ya komona oyo ya biso moko?

5 Na ekeke ya liboso, likolo ya mibeko na bonkoko, Bafalisai nyonso bazalaki na ezalela ya kosambisa makasi mpenza bazalani na bango. Bayoki na Yesu oyo bazalaka na momesano wana basengelaki kotika yango. Ezali mpasi te na komona lititi ezali kati na miso ya bato mosusu kasi ya yo moko te​—na boye moto azali mpenza kolendisa bolingo mpo na ye moko! Moto moko alobaki ete: “Nalingaka kolobela mpenza mabe ya bamosusu mpo ete na bongo nazali komiyoka malamu!” Momeseno ya kolobela mabe ya bato mosusu ekoki kopesa mayoki ete ozali na makoki maleki mabunga na yo oyo olingi kobomba yango. Kasi soki toli ebongi na kopesama, esengeli kopesama na boboto. Moto oyo akosembola mozalani na ye, asengeli ntango nyonso koyeba ete ye mpe azali na mabunga.​—Bagalati 6:1.

Meka kososola liboso na kosambisa

6. Wana tosengeli kosambisa, likolo na eloko nini kosambisa yango esengeli kozwa moboko, mpe nini ekosalisa biso na kolobela mingi te mabunga ya bato mosusu?

6 Yesu ayaki kosambisa mokili te, kasi mpo na kobikisa yango. Kosambisa nyonso oyo azalaki kosala eutaki na ye te, kasi ezwaki moboko likoló na maloba oyo Nzambe apesaki ye ete aloba yango. (Yoane 12:47-50) Bobele bongo, kosambisa nyonso oyo tokosala esengeli kozala na boyokani na Liloba na Nzambe. Esengeli na biso kobwaka ezaleli na bomoto oyo ya komilekisa lokola basambisi. Tosengeli kobondela Jéhovah mbala na mbala ete asalisa biso mpo na likambo yango. “Bolombaka, mpe bakopesa bino; bolukaka mpe bokozwa; bobetaka mpe bakozipwela bino. Mpo ete moto na moto oyo akolombaka akozwaka; ye oyo akolukaka akomonaka; bakozipwelaka ye oyo akobetaka.” (Matai 7:7, 8) Yesu nkutu alobaki boye: “Ngai nakoki kosala eloko ngai moko te; nakosambisa lokola ekoyokaka ngai mpe esambiseli na ngai ezali sembo, mpamba te nakolukaka mokano na ngai moko te, kasi mokano na ye oyo atindi ngai.”​—Yoane 5:30.

7. Momesano nini tosengeli kolona, momeseno oyo ekosalisa biso na kosalela Lilako lileki malamu?

7 Tolona te momesano ya kosambisa bamosusu, kasi tomeka nde kososola na komityaka na esika na bango​—ezali likambo moke te, kasi ezali na ntina mpenza soki tolingi kotosa Lilako lileki malamu oyo Yesu apesaki na nsima, ete: “Makambo nyonso malingi bino ete bato basalela bino yango, bino bosalela bango bobele bongo. Mpamba te Mibeko mpe basakoli ezali bongo.” (Matai 7:12) Bayekoli na Yesu basengeli kozala na boboto, kososola ezaleli ya makanisi, mayoki mpe elimo ya bazalani na bango. Esengeli na bango kotala na mosika mpe kososola bamposa ya bamosusu mpe kosala makasi na bango mpenza ete basalisa bango. (Bafilipi 2:2-4) Bambula mingi na nsima, Paulo akomaki boye: “Mpo ete Mibeko mobimba mikokisami na liloba moko ete: ‘Olinga mozalani na yo lokola yo moko.’​—Bagalatia 5:14.

8. Wapi banzela mibale oyo Yesu alobelaki, mpe mpo na nini moko kati na yango eponami na bato mingi?

8 “Boingela na ekuke na nkaká. Mpamba te ekuke ezali monene mpe nzela ezali na esika monene oyo ekoleka kino libebi. Bazali mingi baoyo bakoingela na yango. Nzokande ekuke ezali na nkaka mpe nzela ekangani oyo ekoleka na bomoi mpe baoyo bakomona yango bazali mingi te.” (Matai 7:13, 14) Na eleko na Yesu, mingi baponaki nzela ezali komema na libebi, mpe ezali yango nde mingi na bato ya ntango na biso bazali kopona. Nzela monene ezali kotikela bato bonsomi ya kotambola ndenge bango moko balingi: bazali na mibeko mpo na kotosa te ata mitinda mpe ezali te, mpe bakoki komeka kozala na bomoi moko ezangi bipekiseli, kozanga ata mobeko moko. Mpo na bango, ezali na ntina te ete ‘babunda na makasi mpo na kokota na ekuke na nkaka!’​—Luka 13:24.

9. Nini esengeli mpo na kotambola na nzela ya nkaká, mpe Yesu apesi likebisi nini epai na baoyo bazali koleka na yango?

9 Nzokande, ezali ekuke na nkaka nde ekolekisaka kino na nzela oyo ezali komema na bomoi na seko. Baoyo bazali kokota na ekuke yango basengeli komonisa ezalela ya komikanga mposa to komipekisa; bazali mbala mosusu kozwa toli oyo ezali komeka mposa na bango mpe bozindo ya bokangani na bango epai na Nzambe. Na ntango na minyoko, nzela yango ekómaka mpasi mpe ekosengaka mpiko. Yesu apesi likebisi oyo epai na baoyo bazali kotambola kati na nzela yango, ete: “Bokeba mpo na basakoli na lokuta, baoyo bakoya liboso na bino na bilamba ya mpate nde katikati bazali bankoi.” (Matai 7:15) Maloba oyo mazali mpenza mpo na Bafalisai. (Matai 23:27, 28,) Bazalaki ‘kofanda na kiti na Moise’ kosala lokola ete bazali koloba na nkombo na Nzambe, nzokande bazalaki kolanda mibeko na bato.— Matai 23:2.

Ndenge nini Bafalisai bazalaki ‘kofunga bokonzi’

10. Na lolenge nini mpenzampenza bakomeli mpe Bafalisai bazalaki ‘kofunga bokonzi liboso na bato’?

10 Lisusu, bakonzi na mangomba ya Bayuda bazalaki kosala nyonso mpo na kokanga nzela na baoyo bazalaki koluka kokota na ekuke ya nkaka. “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi! mpo ete bokofunga bokonzi ya likolo liboso na bato; mpamba te bino mpenza bokoingela wana te, nde bokotika te ete baoyo balingi baingela.” (Matai 23:13) Bafalisai bazalaki mpenza kosala bobele lolenge oyo Yesu alobaki. ‘Bakamataki bayekoli na Yesu lokola bato mabe likolo na Mwana na moto.’ (Luka 6:22) Babenganaki na eyanganelo, moto oyo akufi miso longwa na bomwana, oyo abikisamaki na Klisto mpo andimaki ete Yesu azalaki Masiya. Baboti na ye baboyaki koyanola ata na motuna moko, noki bakozwa etumbu wana moko. Bobele mpo na ntina yango, bato mosusu oyo bazalaki kondima ete Yesu azalaki Masiya bazalaki kokakatana mpo na koyambola yango polele.​—Yoane 9:22, 34; 12:42; 16:2.

11. Na mbuma nini tokoki koyeba bakonzi na mangomba na boklisto ya lokuta?

11 Yesu alobaki ete, “bokososola Bango na mbuma na bango.” “Nzete malamu na nzete malamu ekobota mbuma malamu, nzete mabe na nzete mabe ekobota mbuma mabe.” (Matai 7:16-20) Lilako yango moko ezali kosalelama lelo oyo. Mingi na bakonzi ya mangomba na boklisto ya lokuta bakolobaka likambo moko, nde bakosalaka likambo mosusu. Atako balobi ete bazali koteya Biblia, kasi bazali mpenza nde kotuka na kopesáká bato mateya lokola Trinité mpe lifelo ya móto. Bamosusu bazali kondima mbeka na lisiko te, bazali koteya Evolisyo na esika na Kozalisama, mpe bazali kosakola bobele makambo oyo bato balingaka koyoka, mpo na kosepelisa matoyi na bango. Lokola Bafalisai, mingi na bakonzi ya mangomba balingi mpenza mosolo; bakozwaka bamilio na bamilio epai na bandimi na bango. (Luka 16:14) Bango nyonso babeleli Yesu ete: “Nkolo, Nkolo,” kasi tala eyano na ye: “Nayebi bino soko moke te! Bolongwa na ngai, bino batyoli na mibeko.”​—Matai 7:21-28.

12. Mpo na nini bamoko na baoyo bazalaki liboso kotambola na nzela ya nkaká basili kotika yango, mpe likambo yango ebimisi nini?

12 Na eleko na biso, bamoko kati na baoyo batambolaki liboso na nzela na nkaka basili kotika yango. Bakolobaka ete balingi Jéhovah, kasi bazali kotosa te etinda apesaki ya kosakola. Bakolobaka ete balingi Yesu nde bazali kobatela bampate na ye te. (Matai 24:14; 28:19, 20; Yoane 21:15-17; 1 Yoane 5:3) Balingi te kozala na nse na ekanganeli moko na baoyo bazali kotambola na matambe na Yesu. Bazali komona nzela ekangami lokola ete ekangami mingi koleka. Basili kotika kosala malamu, yango wana “babimaki kati na biso, kasi bazali bato na biso te; mpamba te soki bazalaki bato na biso, mbele basili koumela na biso elongo.” (1 Yoane 2:19) Basili kozonga kati na molili, “na molili yango tuu.” (Matai 6:23) Basili koboya elendiseli oyo na Yoane ete: “Bana, bolingana na bolingo na maloba te, soko na monoko te, kasi na bolingo na misala mpe na solo.”​—1 Yoane 3:18.

13, 14. Lisese nini Yesu apesaki mpo na komonisa ntina ya kosalela maloba na ye, mpe mpo na nini yango etindaki bayoki na ye na Palestine ete bakanisa mingi?

13 Yesu asukisi Lisolo na ye likoló na ngomba na lisese moko kitoko ete: “Moto na moto oyo akoyokaka maloba na ngai mpe akotosaka yango, akokokana na moto na mayele oyo atongi ndako na ye likolo na mabanga Mbula enoki, mpe mpela eyei, mpe mipepe mipepi, mpe ebeti ndako, nde ekwei te, mpamba te etongami likoló na mabanga.”​—Matai 7:24, 25.

14 Na Palestine, na ntango na bambula makasi, ezalaki kosalema ete mai mingi makokaki koboma, ekita pwasa na bisika bizalaki na mai te. Mpo ekwea te, ndako esengelaki kozala na miboko likolo na mabangá. Lisolo ya Luka limonisi na sikisiki ete moto oyo Yesu alobeli “atimolaki, mpe akitaki na mozindo mpe atyaki moboko likoló na mabangá.” (Luka 6:48) Ezalaki mosala moko makasi, kasi mozwaki mbano na yango ntango mopepe makasi moyaki. Moto oyo azali komitongela bizaleli na boklisto likoló na maloba na Yesu, akozwa mbano ntango mopepe na banguna mokobeta.

15. Nini ekokómela baoyo bazali kolanda malako na bato na esika ete batosa maloba na Yesu?

15 Ndako mosusu etongamaki likolo na zelo: “Moto na moto oyo akoyokaka maloba na ngai, nde akotosaka yango te, akokokana na moto na ebebe oyo atongi ndako na ye likolo na zelo. Mbula enoki, mpe mpela eyei, mpe mipepe mipepi, mpe ebeti ndako yango, mpe ekwei. Kokwea na yango ezalaki mpe monene mpenza.” Ekozala bobele bongo mpo na baoyo bakolobaka: “Nkolo, Nkolo,” nde bakotosaka maloba na Yesu te.​—Matai 7:26, 27.

“Lokola bakomeli na bango te”

16. Lisolo likolo na ngomba ezalaki na bopusi nini likoló na baoyo bayokaki yango?

16 Lisolo likoló na ngomba ezalaki na bopusi nini? “Esilaki Yesu koloba maloba oyo, bibele bakamwi mateya na ye. Mpamba te alakisaki bango lokola azali na bokonzi, nde lokola bakomeli na bango te.” (Matai 7:28, 29) Maloba na Yesu mazalaki na bopusi bozindo epai na bibele, mpamba te azalaki koloba na bokonzi lokola bamonaki naino liboso te.

17. Bakomeli bazalaki kosala nini mpo bapesa mateya na bango kilo, mpe bazalaki koloba nini na ntina na bato na mayele oyo bakufa, baoyo bango bazalaki kotanga nkombo mpe maloba na bango?

17 Mokomeli moko te azalaki koloba na bokonzi na ye moko, lokola emonisi litatoli ya masolo na bato oyo elandi, ete: “Bakomeli bazalaki kotonga mateya na bango likolo na mibeko na bonkoko, mpe likolo na baoyo bapesaki bango mokumba wana: ‘ata liteya moko te ya mokomeli ezalaki na bokonzi to na kilo, bobele (soki alobi ete) . . . Bakonzi ya lingomba bapesi mobeko, to . . . Bato na mayele balobi; to mpe esakweli mosusu ya bonkoko ya motindo moko. Hillel le Grand azalaki kopesa mateya na solo mpe mayokani na mibeko na bonkoko likolo na likambo moko; kasi, atako asololi likambo yango na boumeli ya mokolo mobimba . . . bandimaki liteya na ye te kino ayaki koloba na nsuka ete: Botala oyo nayokaki epai na Shemaia mpe Abtalion (bakonzi oyo bazalaka liboso na Hillel)’.” (Commentaire du Nouveau Testament à partir du Talmud et des Ecritures hébraïques (angl.), ya John Lightfoot). Bafalisai bazalaki nkutu koloba na ntina na bato na mayele oyo basilaki kokufa uta kala mpenza, ete: “Na ntango moto azali kobanda liteya moko ya mibeko na nkombo na bayengebene​—mbebu na bango ezali koimaima elongo na bango kati na nkunda.” La Torah: Du rouleau au symbole dans le judaisme formateur (angl.).

18. (a) Bokeseni nini bozali kati na mateya ya bakomeli mpe na oyo na Yesu? (b) Na makambo nini mateya na Yesu mazalaki kokamwisa?

18 Bakomeli bazalaki kotanga bankombo ya bato bakufa mpo baloba na bokonzi; Yesu azalaki koloba na bokonzi ya Nzambe bomoi. (Yoane 12:49, 50; 14:10) Bakonzi na mangomba ya Bayuda bazalaki, ‘kotoka mai mabe ya mabulu mazipamaki, Yesu azalaki kobimisa maziba na mai na mpio oyo mazalaki kosilisa mposa na motema. Azalaki kobondela mpe kokanisa na boumeli ya butu mobimba, mpe wana azalaki koloba, azalaki kopesa na bayoki na ye mayoki ya mozindo oyo bazalaki na yango liboso te. Azalaki koloba na nguya oyo bakokaki kooka yango, azalaki koloba na bokonzi oyo ata nkutu bakomeli, Bafalisai mpe Basadukai na nsuka bamekaki lisusu koangana te. (Matai 22:46; Malako 12:34; Luka 20:40) Moto ata moko te asila koloba lokola ye! Na nsuka ya lisolo, bibele bakamwaki.

19. Kokokana nini ezali kati na bametode na mateya ya ba Témoins de Jéhovah mpe na oyo Yesu asalelaki kati na Lisolo likoló na ngomba?

19 Boni na mikolo na biso? Ba Témoins de Jéhovah, baoyo bazali kosakola na ndako na ndako, bazali kosalela bametode ekokani. Soko moto alobi na yo ete: “Lingomba na ngai eteyi ete mabele makobebisama na móto,” okoki koyanola ye boye ete: “Kati na Biblia na yo, Biblia lingala(haut-fleuve), totangi na Mosakoli 1:4 ete: ‘Mokili (mabelé) ekoumela seko.’” Na kokamwa nyonso, moto akoloba mbala mosusu ete: kasi nayebaki te ete ekomami kati na Biblia na ngai!” Soko moto mosusu alobi na yo ete: “Mbala na mbala nayokaka ete, basali na masumu bakozikisama na móto ya lifelo.” Okoloba na ye ete: “Nzokande, Biblia na yo elobi na Baloma 6:23 ete: ‘Masumu makofuta mbongo, mbongo yango bobele kufa.’” To soko batuni na ntina na Trinité, ete: “Bateyaki ngai ete Yesu mpe Tata na ye bakokani.” Okoloba ete: “Nzokande, na Yoane 14:28, Biblia na yo emonisi maloba na Yesu: ‘Tata aleki ngai.”’ Na nsuka, soko moto moko mosusu alobi na yo ete: “Bateyaki ngai ete Bokonzi na Nzambe ezali kati na mitema na biso”, okoyanola ye boye, ete: “Na Danyele 2:44, Biblia na yo elobi ete: ‘Na mikolo ya mikonzi yango, Nzambe na lola akotelemisa bokonzi bokobebisama te . . . ekobuka mpe ekosilisa bikonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.’ Bongo ndenge nini yango ekoki kozala kati na moko na moko na biso?”

20. (a) Kokesena nini ezali kati motindo na mateya ya Ba Témoins de Jéhovah mpe na oyo ya bakonzi na mangomba ya boklisto ya lokuta? (b) Sikawa ezali ntango mpo na kosala nini?

20 Yesu azalaki koloba na bokonzi boutaki na Nzambe. Ba Témoins de Jéhovah bazali koloba na bokonzi ya Liloba na Nzambe. Bakonzi na mangomba ya boklisto ya lokuta bazali kolakisa bato malako masili kobebisama na mateya mautaki na Babilone mpe na Ezipito. Ntango bato na motema sembo bazali komona ete Biblia eboyi bindimeli na bango, bazali kokamwa mpe konganga ete: ‘Nayebaki te ete Biblia na ngai elobi boye!’ Nzokande, ezali mpenza bongo. Sikawa ezali ntango mpo na bato banso oyo bazali kobanza mposa na bango ya elimo ete bamiyokanisa na maloba oyo Yesu alobaki kati na Lisolo likolo na ngomba, kotongáká bongo moboko ya mabanga moye mokobeba te.

◻ Na esika ete tomikomisa basambisi, nini tosengeli komeka kosala, mpe mpo na nini?

◻ Mpo na nini tokoki koloba ete mingi na bato na ntango na biso bazali kopona nzela monene?

◻ Mpo na nini lolenge oyo Yesu azalaki koteya ekesenaki mpenza na oyo na bakomeli?

◻ Lisolo likoló na ngomba ezalaki na bopusi nini likolo na baoyo bayokaki yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto