Yebisá solo na ntina etali Yesu
1 Baklisto bapakolami oyo bazali kozwa lisalisi ya baninga na bango bampate mosusu, “bazali na mosala ya kopesa litatoli na ntina etali Yesu.” (Emon. 12:17) Yango ezali mokumba ya ntina mingi, mpamba te lobiko ekoki kozwama kaka na nzela na ye.—Yoa. 17:3; Mis. 4:12.
2 ‘Nzela, solo, mpe bomoi’: Yesu alobaki: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoa. 14:6) Tokoki kobondela Nzambe kaka na nzela ya Yesu, oyo azali “nzela,” mpe kondimama lokola baninga na ye. (Yoa. 15:16) Yesu azali “solo” mpo ete bisakweli mpe bililingi ya makambo nyonso oyo ezali na Makomami ya Liebele ekokisamaki epai na ye. (Yoa. 1:17; Kols. 2:16, 17) Ya solo, ntina ya libosoliboso ya bisakweli ya solo ezali ya komonisa polele mokumba monene oyo azali na yango kati na kokokisama ya mokano ya Nzambe. (Emon. 19:10) Lisusu, Yesu azali “bomoi.” Bato nyonso oyo balingi kozwa likabo ya bomoi ya seko basengeli komonisa ete bandimi mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola bato.—Yoa. 3:16, 36; Ebe. 2:9.
3 Motó mpe mokonzi oyo azali koyangela: Bato basengeli mpe koyeba ete Yehova apesá Mwana na ye nguya mingi ya koyangela likoló na nyonso. Yesu asili kotyama Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe, mpe ‘bato nyonso basengeli kotosa ye.’ (Gen. 49:10, NW) Lisusu, Yehova aponá ye azala motó ya lisangá. (Ef. 1:22, 23) Tosengeli kosalisa bato oyo toyekolaka na bango Biblia báyeba ndenge oyo Yesu azali kotambwisa lisangá mpe azali kosalela “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kopesa bilei ya elimo “na ntango oyo ebongi.”—Mat. 24:45-47.
4 Nganga-Nzambe Monene oyo azali na motema mawa: Lokola akutanaki na komekama mpe minyoko ntango azalaki moto, Yesu “azali na likoki ya koya kosalisa baoyo bazali komekama.” (Ebe. 2:17, 18) Oyo nde libɔndisi mpo na bato ya kozanga kokoka ya koyeba ete Yesu amityaka na esika na bango mpo ayebi bolɛmbu na bango mpe ete akɔtelaka bango na boboto nyonso! (Lom. 8:34) Na nzela ya mbeka oyo Yesu apesaki mpe na nzela ya mosala na ye ya Nganga-Nzambe Monene, tokoki kopusana pene na Yehova “na elobeli ya polele” mpo “tósalisama na ntango oyo ekoki.”—Ebe. 4:15, 16.
5 Tiká ete milende oyo tosalaka mpo bato báyeba solo na ntina ya Yesu etinda bango bátosa mpe básalela ye elongo na biso.—Yoa. 14:15, 21.