Elimo santu: bokasi na Nzambe bokosalaka mosala
ENGEBENE liteya ya Trinité, elimo santu ezali persona ya misato na Bonzambe, oyo akokani na Tata mpe na Mwana. Totangi boye kati na mokanda Notre foi chrétienne orthodoxe (angl.): “Elimo-Santu ezali mpenza Nzambe.”
Kati na Makomami ya hébreu, liloba oyo lisalelami mingi, oyo libongolami mpo na “elimo” ezali ru’ach (“mpema; mopepe; elimo”). Kati na Makomami na greke, liloba lizali na ndimbola oyo ekokani na yango, ezali pneu’ma. Maloba wana mazali kolakisa ete elimo santu ezali mosangani na Trinité?
Bokasi oyo bokosalaka mosala
KOSALELAMA ya liloba “elimo santu” kati na Biblia ezali komonisa ete ezali bokasi bokoutaka na Jéhovah Nzambe, oyo akosalelaka mpo na kokokisa mokano na ye na mitindo mikeseni. Elimo santu ekoki kokokisama na kurá to na bokasi oyo bokoki kozwama mpe kosalelama na mitindo mikeseni.
Na Genese 1:2, tozali kotanga ete “elimo [nguya (na hébreu ru’ach)] na Nzambe ezalaki kotambola likoló na mai.” Awa, elimo na Nzambe ezali bokasi oyo bokosalaka mosala, oyo ezalaki kosala mokili.
Nzambe azali kosalela elimo na ye mpo na kongengisa baoyo bazali kosalela ye. David abondelaki na maloba oyo: “Lakisa ngai ete nasala mokano na yo mpo ete yo ozali Nzambe na ngai. Elimo [ru’ach] na yo ezali malamu; ekamba ngai na mokili na sembo!” (Nzembo 143:10) Na ntina na mibali na mayele 70 oyo Moïse asengelaki kopona mpo ete bakoka kosalisa ye, Nzambe alobaki na mosali na ye [Moïse] ete: “Nakokamata ndambo na elimo [ru’ach] ezali likoló na yo mpe kotya yango likoló na bango.”—Mituya 11:17.
Bisakweli ya Biblia bikomamaki na bato na Nzambe oyo “bapusamaki na elimo santu [na greke, pneu’ma].” (2 Petelo 1:20, 21) Ezali motindo yango nde Biblia “epemamaki na Nzambe”; thé·o’pneu·stos na greke, na elobeli ya polele, “efulami [na] Nzambe.” (2 Timote 3:16) Epai mosusu, elimo santu esili kopesa bimonaneli na bato mosusu to mpe bandoto ya bisakweli.—2 Samwele 23:2; Yoele 2:28, 29; Luka 1:67; Misala 1:16; 2:32, 33.
Ezali elimo santu nde epusaki Yesu mpo na kokende na esobe nsima ya batisimo na ye. (Malako 1:12) Elimo ezalaki lokola móto epai na basaleli na Nzambe, bokasi oyo bozalaki na mosala epai na bango mpe ezalaki kopesa bango nguya. Elimo yango ezalaki kopesa bango nzela ya koloba na molende mpe na mpiko.—Mika 3:8; Misala 7:55-60; 18:25; Baloma 12:11; 1 Batesalonike 5:19.
Ezali lisusu na nzela ya elimo na ye nde Nzambe azali kokokisa bikateli na ye epai na bato mpe mabota. (Yisaya 30:27, 28; 59:18, 19) Elimo na Nzambe ekosalaka mpo na malamu na bato to mpo na kotemela makambo na bango mosusu: ekoki kokóma esika nyonso.—Nzembo 139:7-12.
“Nguya oyo eleki nguya na bato”
ELIMO na Nzambe ekoki mpe kopesa ‘nguya oyo eleki nguya na bato’ epai na basaleli na ye. (2 Bakolinti 4:7) Nguya yango ezali koyeisa makasi mpo na koyika mpiko na komekama oyo kondima na bango ezali kokutana na yango, to mpo na kokokisa makambo oyo bango moko mbele bakoki mpenza kosala yango te.
Na ndakisa, na ntina na Samson, Basambisi 14:6 elobi na biso ete: “Elimo na Yahvé ekotelaki ye, mpe ye apasolaki nkosi. Azalaki mpe na eloko te na loboko na ye.” (Jé) Ezali wana nde moto moko na bonzambe oyo akotaki epai na Samson, kopesaka nzoto na ye makasi mpo ete akoka kosala lolenge oyo ye asalaki? Te, ntango wana, ezalaki “nguya na NKOLO [Nzambe] nde ekotaki noki kati na ye.”—Biblia ya Pierre de Beaumont.
Ntango Yesu azwaki batisimo, Biblia elobi na biso ete, elimo santu eyaki likoló na ye na lolenge na moto te, kasi lokola ebengá. (Malako 1:10) Bokasi na Nzambe bokosalaka mosala bosungaki Yesu na kobikisa bamaladi mpe na kosekwisa bakufi. Lokola oyo elobi Luka 5:17, “nguya na Nkolo [Nzambe] ezali na ye [Yesu] mpo na kobikisa babeli.”
Elimo na Nzambe epesaki mpe bayekoli na Yesu nguya ya kosala makamwisi. Engebene Misala 2:1-4, bayekoli bayanganaki na mokolo ya Pantekote wana “lokito ebimaki na likoló pwasa lokola lokito na kopepa na mopepe makasi, . . . Bango nyonso batondaki na elimo santu, mpe babandi kosolola na nkota mosusu pelamoko elimo epesi bango maloba.”
Boye, elimo santu epesaki na Yesu mpe na basaleli mosusu na Nzambe nguya ete bakokisa makambo oyo bato bazali mpenza na likoki ya kosala yango te.
Ezali moto te
KASI, elimo santu emonisami lokola moto kati na ba versets mosusu ya Biblia. Boye te? Ezali bongo, kasi na ntina yango Edmund Fortman, moto oyo ayekoli teoloji ya katolike, alobi boye kati na mokanda Le Dieu Trin (angl.): “Atako elimo yango emonisami mbala mingi lokola moto, ezali komonana polele ete bakomi na bulee na [Makomami na hébreu] bakanisaki te mpe bamonisaki te elimo santu lokola moto mpenza.”
Kati na Makomami, bandakisa ya biloko bimonisami lokola bato ezali mingi. Elobami na ntina na mayele ete, ezali na bana (Luka 7:35); lolenge moko mpo na masumu mpe liwa ete, basili koyangela. (Baloma 5:14, 21) Tala lolenge Bible de Dhorme ebongoli eteni oyo ya Genese 4:7: “Lisumu libombami na ekuke.” Engebene note moko ya libongoli yango, “lisumu limonisami lokola ekelamu oyo azali kosenzela moto mpo ete akanga ye”; nzokande, ezali polele ete lisumu ezali moto moko na elimo te; bobele bongo, lolenge oyo ya komonisa elimo santu lokola moto elimboli te ete elimo santu ezali moto na elimo.
Lolenge moko na 1 Yoane 5:6-8, ezali bobele elimo te, kasi lisusu “mai, mpe makila” nde “ezali kotatola.” Emonani bongo polele ete, lokola mai mpe makila ezali moto te bobele bongo elimo santu mpe ezali moto te.
Na boyokani elongo na bosukisi oyo, tozali komona ete Biblia ezali kolobela mingimingi “elimo santu” na lolenge ya moto te, wana ezali yango kolobela elimo nzela moko na mai mpe na móto. (Matai 3:11; Malako 1:8) Makomami mazali kolendisa bato ete bamitondisa na elimo santu, kasi na vinyo te. (Baefese 5:18) Na ntina na bayekoli na Klisto, Makomami malobi boye ete, basili kotonda na elimo santu lokola batondi mpe na mayele, na kondima, na esengo to mpe na ezaleli mosusu ya malamu. (Misala 6:3; 11:24; 13:52) Na 2 Bakolinti 6:6, elimo santu esangani na bizaleli mosusu. Soko elimo santu ezalaki solo moto, mbele mbala mingi tokuti maloba motindo oyo te.
Epai mosusu, wana bamoko na mikapo ya Biblia ekomi ete elimo ezali koloba, nzokande mosusu emonisi ete, oyo elimo santu ezali koloba elobami nde na nzela na bato to mpe na baanzelu. (Matai 10:19, 20; Misala 4:24, 25; 28:25; Baebele 2:2) Na bisika wana, mosala ya elimo santu ekokisami na ba ondes ya radio, oyo ekosalaka ete bato oyo bafandi na bisika bitangwi bakoka koyoka nsango etindameli bango uta na bato mosusu mosika.
Na Matai 28:19, elobelami mpo na “nkombo . . . ya elimo santu.” Nzokande, liloba “nkombo” ezali mpenza kolobama te bobele mpo na nkombo ya moto, ezala na monoko ya greke to na Lifalansé. Ntango bakolobaka: “na nkombo ya mobeko” (na Lifalansé: “au nom de la loi”) bazali kolobela moto te, kasi balobeli nde bokonzi bomonisami na mobeko. Na ntina yango, mokanda Les mots-images dans le Nouveau Testament (angl.) ya Archibald Robertson, elobi boye: “Kosalelama ya liloba oyo ‘nkombo’ (onoma), oyo ezali kokutama mingi kati na Biblia ya Septante mpe kati na papyrus, ezali komonisa nguya to mpe bokonzi.” Na yango, moto oyo abatisami na ‘nkombo ya elimo santu’ azali kotosa bokonzi ya elimo santu, kondimáká bongo ete yango ezali kouta epai na Nzambe mpe ezali kosala engebene mokano na Nzambe.
“Mosungi”
YESU abengi elimo santu ete “mosungi,” mpe alobeli sikisiki mpenza ete akoteya, akotambwisa mpe akoloba. (Yoane 14:16, 26; 16:13) Liloba na greke (pa·ra’kle·tos) oyo libongolami na mosungi, lizali kolobela mobali (masculin). Wana ezali kolobela oyo mosungi asengeli kokokisa, Yesu azali kosalela bankombo-likitana oyo ezali kozwa esika ya mobali (pronoms personnels masculins). (Yoane 16:7, 8) Epai mosusu, liloba na greke (pneu’ma) oyo libongolami na elimo ezali kozwa esika ya moto moko te (neutre): yango ebongi mpenza kosalelama elongo na likitana ya greke (pronom) oyo ezali kozwa esika ya moto moko te.
Na minoko oyo misalelaka likitana to pronom oyo ezali kozwa esika ya moto moko te (na ndakisa na Lingelesi), motuya monene ya babongoli na Biblia oyo bandimi Trinité babombaka kokesene wana, lokola emonisami na libóngoli moko ya katolike na Amerika (New American Bible). Tala oyo libóngoli yango elobi na ntina na Yoane 14:17: “Liloba ya greke oyo libóngolami na ‘Elimo’ ezali kozwa esika ya moto te. Wana ezali biso kosalela bankombo oyo (‘he,’ ‘his,’ ‘him’), na monoko ya Lingelesi mpo na kolobela bato, motuya monene na mikanda ya kala na greke [mss] mizali kosalela ‘it.’”
Na yango, ntango Biblia ezali kosalela kati na Yoane 16:7, 8 bankombo oyo ezali kozwa esika ya mobali (pronoms masculins) na boyokani elongo na pa·ra’klê·tos, Biblia ezali kolakisa liteya moko te; ezali nde kokokisa masengami na grammaire ya greke.
Ezali kati na Trinité te
MIKANDA mingi mimonisi ete liteya oyo engebene yango, elimo santu ezali persona ya misato na Trinité ezali kati na Biblia te. Na ndakisa:
L’Encyclopédie catholique (angl.): “Esika moko te ezali kolobela persona ya misato ya Trinité kati na Kondimana na Kala.”
Edmund Fortman, moto oyo ayekoli téoloji ya Katolike: “Bayuda bazalaki te kotalela elimo lokola moto; lisusu, ata elembeteli moko mpenza ezali te oyo emonisi ete moko na bakomi na Kondimana na Kala amipesaki na likanisi yango. . . . Kati na Nsango Malamu ekomami na Matai, na Malako, na Luka mpe kati na Misala, elimo santu emonisami lokola nguya na Nzambe.”
La Nouvelle Encyclopédie catholique (angl.): “Emonani polele ete Kondimana na Kala ezali kotalela elimo santu lokola moto te . . . Elimo na Nzambe ezali bobele nguya na Ye. Soko ntango mosusu emonisami lokola ete ekeseni na Nzambe, ezali bobele mpo ete mpema na Yahvé ekosalaka mosala na libanda na ye moko.” Mokanda yango mobakisi boye: “Mingi na mikapo ya Kondimana na Sika mizali kolobela elimo na Nzambe lokola eloko kasi lokola moto te; yango ezali mpenza komonisa kokokanisa oyo etyami kati na elimo mpe nguya na Nzambe.”
Un Dictionnaire catholique (angl.): “Bobele lokola Kondimana na Kala, Kondimana na Sika na mobimba na yango, ezali komonisa elimo lokola makasi to bokasi bouti na Nzambe.”
Na yango, ezala Bayuda, ezala baklisto ya liboso, bazalaki kokanisa te ete elimo santu ezali mosangani na Trinité. Liteya wana libimaki bikeke mingi nsima na bango. Totangi boye kati na mokanda Un Dictionnaire catholique (angl.): “Bonzambe ya persona ya misato elobamaki na mobu 362 na likita moko lisalamaki na Alexandrie . . . , mpe na nsuka, elobamaki lisusu na mobu 381 na likita oyo lisalamaki na Constantinople,” elingi koloba pene na bikeke misato na ndambo nsima wana elimo santu esilaki kosopama likoló na bayekoli na mokolo ya Pantekote.
Te, elimo santu ezali moto te mpe ezali mosangani ya Trinité te. Elimo santu ezali nde bokasi na Nzambe oyo akosalelaka mpo na kokokisa mokano na ye. Bokasi yango bokokani na Nzambe te; Nzambe akosalelaka yango ntango nyonso mpe ezali na nsé na ye.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]
“Bobele lokola Kondimana na Kala, Kondimana na Sika na mobimba na yango, ezali komonisa elimo lokola nguya to bokasi bouti na Nzambe.”—Un Dictionnaire catholique
[Bililingi na lokasa 21]
Na libaku moko, elimo santu ebimaki na lolenge ya ebengá. Na libaku mosusu, na lolenge na milolí ya móto. Nzokande, esili kozwa lolenge na moto ata mbala moko te