Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g93 Avril nk. 26-27
  • Mpo na nini baklisto basengeli koboya maloba ya kotuka?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini baklisto basengeli koboya maloba ya kotuka?
  • Lamuká!—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini epalangani mingi?
  • Likanisi ya Nzambe na ntina na maloba ya kotuka
  • Botika maloba ya kotuka!
  • Mpo na nini koboya koloba maloba ya mabe?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Tóbwaka maloba ya kozokisa
    Lamuká!—2004
  • Zaláká na maloba oyo “ezali malamu mpo na kotonga”
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Ozali “ndakisa . . . na maloba”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Lamuká!—1993
g93 Avril nk. 26-27

Engebene Biblia

Mpo na nini baklisto basengeli koboya maloba ya kotuka?

MOBONGISI moko ya émission na radio BBC-Pays de Galles apamelamaki mokolo mosusu mpo ete, kati na lisoló moko lilekisamaki na radio, aboyaki kolongola “maloba mabe” malobamaki na mobali moko asangisaka nzoto na mibali misusu; engebene molobeli ya BBC oyo atangami na zulunalo The Guardian, mobali wana asalelaki “maloba na bosɔtɔ mpo na komonisa misala oyo na nzela na yango SIDA ekoki kozwama.” Epai mosusu, botaleli ya poso mibale ya programme oyo elekaki na chaînes minei ya télévision ya Angleterre, emonisaki ete 22% ya ba programmes etondaki “na maloba ya bosɔtɔ, na ndai ya maloba mabe mpe na maloba ya kotuka.”

Tala oyo emonisi mpenza makanisi ndenge na ndenge na ntina na likambo oyo. Mpo na bato mingi, kosalela maloba ya kotuka ezali mabe mpenza. Basusu bakanisi ete ezali na likambo moko te ya kopamela; bazali komona ete ezali bobele elobeli ya elilingi oyo ezali kobenda likebi ya bato. Kasi maloba ya kotuka makoki kobima na monoko ya moklisto, oyo akopesaka motuya mingi na boyokani na ye elongo na Nzambe mpe elongo na bazalani na ye?

Mpo na nini epalangani mingi?

“Maloba ya kotuka” emonisi “maloba nyonso mabe.” Kotuka, kolakela mabe mpe ndai ya maloba mabe etangami mpe kati na ndimbola oyo. Maloba ya kotuka makomonisaka nkanda, mpe mbala mosusu kokweisa moto na mafingá. Kati na mokanda na ye Ebandeli mpe ndimbola ya maloba na kotuka (na Lingelesi), Mary Marshall alimboli ete “ndai ya maloba mabe esalelami mingi na elobeli ya bato koleka na mikanda.” Nde ata boye, mikanda mingi mibengami romans mitondi na maloba yango ya mabe.

Mpo na nini maloba ya kotuka mapalangani mingi boye? Ezali mpo ete bato mosusu bazangi maloba mingi. Basusu bakosalelaka maloba ya bosɔtɔ mpo na kondimisa makambo oyo bazali koloba. Na ndimbola na yango, maloba ya kotuka makozalaka esika moko na kozanga esengo, na nsɔni mpe na nkanda. Kati na makambo ya mpasi, bato mingi bakolapaka ndai ya maloba mabe “lokola mwango ya komibɔndisa . . . na mayoki oyo bazali na yango.” Mary Marshall amonisi ete index na ye ya ndai na maloba mabe na lokóta ya Lingelesi, oyo ekomami na kolanda alphabet, etondi na maloba oyo mabandi na mileli mikoyokanaka makasi.

Atako kolápa ndai emonani lokola ezali kobɔndisa bango, mingi bakomonaka ete maloba ya kotuka makobimisaka maloba mosusu ya kotuka. Mpo na nini bongo? Mpo ete maloba mabe makotumolaka mayoki. Na Afrique occidentale, mobali moko azwaki nzela ya koleka te kati na ebele ya mituka, abimaki nokinoki na nkanda longwa na vuatire na ye, mpo na kofinga nkolo vuatire oyo ekangisaki ye nzela. Bango mibale basilikaki, mpe babandaki kofingana, moto na moto alukaki koleka mosusu na kobimisa maloba ya bosɔtɔ. Bakumbi mituka mosusu, bango mpe batɛlɛmaki wana, babimisaki mitó na bikuke ya bavuatire na bango mpo na kolendisa baswani wana mibale ete basalela lisusu maloba ya mabe koleka.

Maloba masalelami na mokano ya kokitisa mosusu ekoki kobimisa ebele ya mafingá: kokokanisa moto na nyama, ata na nyama moke, kolobela makambo mabongi te likoló na baboti na ye to likoló na kobotama na ye, maloba oyo mazali kobenda likebi likoló na bilembo mosusu ya nzoto to, oyo eleki mpenza mabe, elobelaka makambo na nsɔni, maloba ya kotuka biloko ya bosantu mpe kotanga nkombo ya nsɔni na binama ya nzoto.

Likanisi ya Nzambe na ntina na maloba ya kotuka

Kosalela nkombo ya Nzambe na lolenge mabe ezali lisumu monene. Exode 20:7 elobi ete: “Okotanga nkombo ya Jéhovah Nzambe na yo mpamba te.” Kasi mosambeli ya Jéhovah akokaki nde kobebisa boyokani na ye elongo na Nzambe na kozanga kotósa mobeko oyo? Ee, mpamba te Mobeko moyebisaki lisusu ete: “Jéhovah akopesa etumbu na ye oyo akotanga nkombo na ye mpamba.”

Mpo na komonisa ntina ya kotósa mobeko oyo, Biblia elobeli etumba oyo ezalaki kati na Moyisraele moko mpe moto mosusu. Ye oyo “abandaki kotuka Nkombo [ya Jéhovah] mpe alakelaki mabe likoló na yango.” Lolenge nini Nzambe atalelaki likambo yango? Tala ekateli na ye: “Ye oyo atukaki nkombo ya Jéhovah akobomama.” (Levitike 24:10-16, MN) Atako ndimbola moko te epesami likoló na kotuka wana, kasi ndakisa oyo ya Biblia emonisi likanisi ya Nzambe na ntina na etamboli mpe na maloba oyo ezangi limemya.

Makomami ya Greke na boklisto malobeli eleko na biso lokola “mikolo ya mpasi mpe na mikakatano . . . Bato [bakozala] . . . batuki [blaʹsphe·moi, na Greke] . . . Bopɛngwa longwa na baoyo wana.” (2 Timoté 3:1, 2, 5, MN) Liloba bla·sphe·miʹa elimboli te bobele maloba mazangi limemya na ntina na biloko ya bosantu. Esangisi maloba nyonso ya kofinga to ya kotuka oyo ezali kopesa mpasi na moto mosusu.

Baoyo bazalaka na maloba ya kotuka bazali komonisa “bomoto ya kala” oyo baklisto balendisami na ‘kolongola’ yango lokola kazaka moko ya nsolo mabe oyo bakozala lisusu na ntina na yango te.a Ntoma Paulo apesi batoli oyo ete: “Bolongola makambo oyo nyonso longwa na minoko na bino: nkɛlɛ, nkanda, mabe, maloba ya kotuka mpe maloba ya nsɔni.” “Makambo nyonso makopesaka mawa, mpe nkanda, mpe nkɛlɛ, mpe kongala, mpe kotɔnga mpe makambo mosusu ya mabe lokola, elongwa epai na bino.” (Bakolose 3:8, 9; Baefese 4:31, MN) Lisusu, baoyo bakotukaka mpe bakosukisaka basusu na mafingá, mpe baoyo ntoma Paulo abengi bango ete “batuki,” batangami kati na “bato mabe [oyo] bakosangola bokonzi na Nzambe te.”​—1 Bakolinti 6:9, 10.

Botika maloba ya kotuka!

Bolingo ya solo oyo moklisto azali na yango mpo na Nzambe ekopusa ye na kosala oyo ezali kosepelisa Ye. (1 Yoane 5:3) Kati na ezaleli oyo azali na yango epai na bato mosusu, moklisto akolinga komonisa bolingo oyo Nzambe azali komonisela bato nyonso; akotósa bongo mitinda mibale ya minene, yango kolinga Nzambe mpe kolinga mozalani na ye. (Matai 22:37-39) Na yango, “tika ete moto na moto asepelisa mozalani na ye na makambo malamu, mpo na kolendisa ye.” (Baloma 15:2, MN) Yango ememi na motuna oyo ete: ‘Maloba na ngai mazali kozokisa to mazali nde kolendisa?’

Ya solo, mpo na moto oyo ameseni kobimisa maloba ya kotuka, kopɛtola maloba na ye ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Kasi ekoki kosalema​—soki lisalisi lipesami. Elimo ya Nzambe ekoki kosalisa moto na kobongola lolenge na maloba na ye, soki ye moko azali na mposa ya kozwa maloba mabongi mpe soki na nsima akosalela yango ntango nyonso.​—Baloma 12:2.

Salomo, mokonzi ya mayele apesaki likebisi oyo ete: “Lolemo ya bato mabe ekokatama.” Kopesa nzela te ete maloba ya kotuka mabebisa elobeli na yo. Kasi salá ete ozala kati na baoyo bazali ntango nyonso na maloba ya pɛto mpe na elobeli kitoko.​—Masese 10:31, 32; Bakolose 4:6.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na Baefese 5:3, 4, mikapo ya zingazinga milobeli “maloba mabe” mpe “maloba ya nsɔni” lokola makambo matali binama ya kosangisa nzoto. Moklisto asengeli koboya maloba ya mbindo mpe maloba ya nsɔni likoló na kosangisa nzoto.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto