Tótika te koyanganaka
Makomami elobi ete: ‘Tótikaka te koyangana na biso mpenza, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi nde tólendisanaka, mpe tósalaka bongo na koleka mpenza lokola bozali komona mokolo yango ezali kokóma pene.’ (Baebele 10:25) Ezali polele ete basambeli ya solo basengeli koyangana na esika ya losambo mpo na ‘kotyelanaka likebi mpo na kopusama na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu.’—Baebele 10:24.
NTANGO ntoma Paulo akomaki maloba yango na ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.), Bayuda bazalaki kokende kosambela na tempelo moko monene na Yelusaleme. Bazalaki mpe na basinagoga. Yesu ‘ateyaki na basinagoga mpe na tempelo, epai Bayuda nyonso bazalaki koyangana.’—Yoane 18:20.
Bisika ya losambo ya ndenge nini Paulo azalaki kokanisa ntango apesaki baklisto toli ete báyanganaka mpo na kolendisana? Bandako mineneminene ya losambo oyo mangomba ya boklisto esalelaka ezali nde kolanda ndakisa ya tempelo oyo ezalaki na Yelusaleme? Ntango nini babandaki kotonga bandako mineneminene ya losambo ya baklisto?
‘Ndako mpo na nkombo ya Nzambe’
Mokanda ya Exode nde elobeli mbala ya liboso oyo malako epesamaki mpo na esika moko ya kosambela Nzambe. Yehova Nzambe atindaki Bayisalaele, libota oyo aponaki, bátonga “mongombo” to “hema ya koyangana.” Basengelaki kotya sanduku ya kondimana mpe basaani ya bosantu ndenge na ndenge na kati ya esika yango. Na mobu 1512 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), “nkembo ya [Yehova] etondisaki mongombo” ntango basilisaki kosala yango. Na boumeli ya bambula koleka nkama minei, hema wana oyo bakokaki kopanza yango mobimba mpe komema eloko mokomoko na esika mosusu mpe kotɛlɛmisa yango lisusu, ezalaki moko na makambo ya ntina mpenza oyo Nzambe abongisaki mpo na kopesa bango nzela ya kosambela ye. (Exode, mikapo 25-27; 40:33-38) Biblia ebengi mpe hema yango ete “Tempelo ya [Yehova]” to mpe “ndako ya [Yehova].”—1 Samwele 1:9, 24.
Na nsima, ntango Davidi azalaki mokonzi na Yelusaleme, amonisaki mposa makasi ya kotonga ndako moko mpo na nkembo ya Yehova. Kasi, lokola Davidi abundaki bitumba mingi, Yehova ayebisaki ye ete: “Okotonga ndako mpo na nkombo na ngai te.” Yehova aponaki nde Salomo, mwana ya Davidi, mpo atonga tempelo yango. (1 Ntango 22:6-10) Mosala ya kotonga tempelo eumelaki mbula nsambo na ndambo mpe na nsuka, na mobu 1026 L.T.B., Salomo asalaki molulu ya bofungoli tempelo yango. Yehova asepelaki na ndako yango mpe alobaki boye: “Nasili [kosantisa] ndako oyo yo otongi yango mpe natii nkombo na ngai wana libela; miso na ngai mpe motema na ngai ekozala wana libela.” (1 Mikonzi 9:3) Ntango nyonso oyo Bayisalaele bakotikala sembo epai ya Yehova, Yehova akondima ndako yango. Kasi, soki batiki kosala malamu, Yehova akondima yango lisusu te mpe ‘ndako yango ekobongwana libondo ya mabanga mpamba.’—1 Mikonzi 9:4-9; 2 Ntango 7:16, 19, 20.
Nsima ya bambula, Bayisalaele batikaki mpenza losambo ya solo. (2 Mikonzi 21:1-5) Yango wana, ‘[Yehova] atindelaki bango mokonzi ya Bakaladi oyo . . . azikisaki ndako ya Nzambe mpe abukaki lopango ya Yelusaleme; azikisaki mpe ndako minene na yango na mɔtɔ mpe abebisaki biloko na yango ya motuya. Amemaki na Babilone baoyo babikaki na mopanga mpe bango bakómaki baombo na ye mpe ya bana na ye.’ Biblia emonisi ete makambo nyonso wana esalemaki na mobu 607 L.T.B.—2 Ntango 36:15-21; Yilimia 52:12-14.
Se ndenge oyo Yisaya asakolaki yango, Nzambe atindaki Sirise, mokonzi ya Baperse, alongola Bayuda na boombo ya Babilone. (Yisaya 45:1) Nsima ya kolekisa mbula 70 na boombo, Bayuda bazongaki na Yelusaleme na mobu 537 L.T.B. mpo na kotonga lisusu tempelo. (Ezela 1:1-6; 2:1, 2; Yilimia 29:10) Atako mosala ya kotonga ezalaki kokatana mbala mingi, nsukansuka basilisaki kotonga tempelo na mobu 515 L.T.B. mpe losambo ya pɛto ya Nzambe ezongaki. Atako tempelo yango ezalaki kitoko mingi te koleka oyo ya Salomo, kasi eumelaki mbula soki 600. Kasi, tempelo yango mpe ebebaki mpo Bayisalaele babosanaki losambo ya Yehova. Ntango Yesu ayaki awa na mabele, Mokonzi Elode azalaki kobongisa lisusu tempelo yango. Makambo nini esengelaki kokómela tempelo yango?
‘Ata libanga moko te ekotikama likoló ya libanga’
Na ntina na tempelo ya Yelusaleme, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Ata ndenge nini libanga moko te ekotikama awa likoló ya libanga kozanga ete ebwakama na nse.” (Matai 24:1, 2) Ndenge kaka esakolamaki, na mobu 70 T.B., basoda ya Loma, oyo bayaki kosilisa botomboki ya Bayuda, babebisaki esika yango oyo esalelamaki na boumeli ya bankama ya bambula lokola esika ya losambo ya Nzambe.a Tempelo wana etongamá lisusu te. Na esika oyo tempelo wana ya Bayuda ezalaká, Bamizilma batongá ndako na bango ya losambo na ekeke ya nsambo; yango ezali tii lelo mpe babengaka yango Dôme du Rocher.
Bayekoli ya Yesu basengelaki kosambelaka ndenge nini? Bayuda oyo bakómaki baklisto na ekeke ya liboso basengelaki nde kokoba kosambela Nzambe na tempelo oyo etikalaki moke ebebisama? Baklisto oyo bazalaki Bayuda te basengelaki kosambela Nzambe epai wapi? Bandako mineneminene ya mangomba ya boklisto nde esengelaki kozwa esika ya tempelo wana? Mpo na kozwa biyano na mituna yango, tótalela naino lisolo oyo Yesu asololaki na mwasi Mosamalia.
Na boumeli ya bankama ya bambula, Basamalia bazalaki kosambela Nzambe na tempelo moko monene oyo ezalaki likoló ya Ngomba Gelizimi, na Samalia. Mwasi yango ayebisaki Yesu ete: “Bankɔkɔ na biso basambelaki na ngomba oyo; kasi bino bolobaka ete Yelusaleme nde ezali esika oyo bato basengeli kosambela.” Yesu ayanolaki boye: “Mwasi, ndimelá ngai ete, Ngonga ezali koya wana bato bakosambela Tata na ngomba oyo te na Yelusaleme mpe te.” Tempelo ekozala lisusu na ntina te mpo na kosambela Yehova, mpamba te Yesu alobaki boye: “Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:20, 21, 24) Na nsima, ntoma Paulo ayebisaki bato ya Atene ete: “Nzambe oyo asalá mokili ná biloko nyonso oyo ezali na kati na yango, kozaláká, ndenge Ye azali, Nkolo ya likoló mpe ya mabelé, afandaka te na batempelo oyo esalemi na mabɔkɔ.”—Misala 17:24.
Ezali polele ete bandako ya losambo ya mangomba ya boklisto ezali te bandako oyo ezwá esika ya tempelo epai bazalaki kosambela liboso Klisto aya. Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki mpe na ntina moko te ya kotonga bandako ya ndenge wana. Kasi, se ndenge oyo esakolamaki, nsima ya liwa ya bantoma, baklisto mosusu bapɛngwaki, elingi koloba ete batikaki mateya ya solo. (Misala 20:29, 30) Bambula ebele liboso ete Constantin, amperɛrɛ ya Loma, akóma “moklisto” na mobu 313 T.B., baklisto mingi babandaki kotika makambo oyo Yesu ateyaki.
Constantin asalaki mpenza ete makambo ya mangomba ya Baloma ekɔta na “Lingomba ya boklisto.” Buku moko (The Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Constantin atongisaki bandako-nzambe mineneminene misato na Loma: Bazilike Saint-Pierre, Bazilike Saint-Paul-hors-les-murs, mpe Bazilike Saint-Jean-de-Latran. Ye moto . . . abandisaki baplan oyo ezali lokola ekulusu oyo, na Moyen Âge mobimba, bakómaki kolanda na Mpoto ya Wɛsti mpo na kotonga bandako-nzambe.” Tii lelo oyo, bato batalelaka Bazilike Saint-Pierre oyo ezali na Rome lokola esika moko monene ya Lingomba ya Katolike.
Will Durant, moto ya mayele na makambo ya kala, alobaki ete: “Lingomba ezwaki mimeseno mpe makambo mosusu ya losambo oyo [bapakano] ya Loma bazalaki kosalela liboso ya eleko ya baklisto.” Moko na makambo yango ezalaki “lolenge oyo bandako-nzambe ya mineneminene ezalaki kotongama.” Kobanda na ekeke ya 10 tii na ekeke ya 15, ebele ya bandako-nzambe mpe bakatedrale etongamaki mpe bazalaki kotya likebi mingi na lolenge oyo esengelaki kotongama. Ezali na eleko wana nde batongaki bandako mingi ya mineneminene ya mangomba ya boklisto oyo bazali kotalela yango lelo oyo lokola bamonima.
Bato balendisamaka mpenza na elimo ntango bakendaka kosambela na ndako-nzambe? Francisco afandaka na ekólo Brésil, ye alobi boye: “Nakómaki komona ete kokende na ndako-nzambe ezali likambo oyo eleki kolɛmbisa na makambo nyonso ya losambo. Misa ezalaki na ntina te, bazalaki kozongela makambo kaka ndenge moko mpe ezalaki mpenza kokokisa bamposa na ngai te. Soki Misa esili, nazalaki koyoka lokola nde balongoli ngai kilo na motó.” Atako bongo, bandimi ya solo basengeli koyanganaka. Kasi, ndenge nini?
“Lisangá oyo ezali na ndako na bango”
Mpo na koyeba ndenge oyo baklisto basengeli koyangana, tótalela ndenge oyo bandimi ya ekeke ya liboso bazalaki koyangana. Makomami ezali komonisa ete bazalaki koyangana na bandako ya bamosusu kati na bango. Na ndakisa, ntoma Paulo akomaki ete: “Bópesa mbote na Pilisika mpe Akila baninga na ngai ya mosala na kati ya Klisto Yesu, mpe bópesa mbote na lisangá oyo ezali na ndako na bango.” (Baloma 16:3, 5; Bakolose 4:15; Filemona 2) Baklisto ya solo bazali na mposa ya bandako ya mindɔndɔmindɔndɔ te mpo na kosambela.
Ndenge nini makita ezalaki kosalema na masangá ya baklisto ya liboso? Moyekoli Yakobo asaleli lolenge moko ya liloba ya Grɛki sunagôgê mpo na kolobela likita ya baklisto. (Yakobo 2:2) Liloba yango oyo elimboli “koyanganisa” esalelamaka mpe na esika ya ekklêsia, oyo elimboli lisangá. Kasi, na nsima, liloba “sinagoga” ekómaki kolakisa esika to ndako epai makita ezalaki kosalema. Bayuda oyo bakómaki baklisto na ekeke ya liboso bayebaki malamu makambo oyo ezalaki kosalema na basinagoga.b
Bayuda bazalaki kokende na tempelo ya Yelusaleme mpo na bafɛti oyo bazalaki kosala mbula na mbula; nzokande, bazalaki koyangana na basinagoga ya bisika oyo bafandi mpo na koyekola makambo ya Yehova mpe mpo báteya bango Mibeko. Emonani ete na basinagoga, bayangani bazalaki kobondela, kotánga Makomami, kolimbola yango na mozindo mpe kolendisana. Ntango Paulo na bato mosusu oyo bazalaki na ye bakɔtaki na sinagoga moko na Antiokia, “bakambi ya sinagoga yango batindelaki bango bato, kolobáká ete: ‘Mibali, bandeko, soki ezali na mwa liloba moko ya kolendisa oyo bozali na yango mpo na bato ya ekólo, bóyebisa yango.’ ” (Misala 13:15) Ntango Bayuda oyo bakómaki baklisto na ekeke ya liboso bazalaki koyangana na bandako ya bamosusu kati na bango, na ntembe te bazalaki kosala se lolenge wana; na makita na bango bazalaki koyoka mateya ya Makomami mpe bazalaki kolendisama na elimo.
Masangá mpo na kolendisama
Lelo oyo Batatoli ya Yehova mpe bazali kosala ndenge baklisto ya liboso bazalaki kosala, bayanganaka na bandako ya losambo oyo etongami na ndenge ya mindɔndɔmindɔndɔ te mpo na koyekola Biblia mpe mpo na kozala elongo na baninga ya malamu. Na boumeli ya bambula mingi, bazalaki koyangana na bandako ya bamosusu kati na bango mpe tii lelo oyo, basalaka se bongo na bisika mosusu. Kasi, lelo oyo bakómi na masangá koleka 90 000, mpe bisika oyo basalaka mpenza makita na bango babengaka yango Bandako ya Bokonzi. Bandako yango etongamaka te mpo na kobenda likebi ya bato, ezalaka mpe lokola bandako-nzambe te. Ezalaka bandako ya mindɔndɔmindɔndɔ te; kasi epesaka nzela na masangá ya bato 100 tii 200 báyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ mpo na koyoka Liloba ya Nzambe mpe koyekola yango.
Batatoli ya Yehova bayanganaka mbala misato na pɔsɔ. Moko ya makita oyo basalaka ezali lisukulu ya bato nyonso. Nsima ya likita yango, bayekolaka likambo moko to esakweli moko ya Biblia oyo elobelami na zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Likita mosusu basalaka ezali eteyelo oyo epesaka bango formasyo mpo báyeba koteya nsango ya Biblia. Yango esalemaka mokolo moko na likita mosusu oyo elakisaka bango lolenge malamu ya kosakola. Mbala moko na pɔsɔ, Batatoli bayanganaka na bandako ya bamosusu kati na bango mpo na koyekola Biblia na mwa bituluku. Moto nyonso akoki koya na makita nyonso wana. Basɛngaka mabonza te na makita yango.
Francisco, oyo tolobelaki liboso, amonaki ete makita oyo esalemaka na Ndako ya Bokonzi ezalaka mpenza na litomba. Alobi boye: “Esika ya liboso oyo nakendaki koyangana na makita ezalaki ndako moko kitoko oyo ezalaki na vile, mpe makambo namonaki kuna ekamwisaki ngai mpenza. Bayangani bazalaki na boboto mpenza, mpe namonaki ete balinganaka mpenza. Nakómaki na mposa makasi ete nazonga lisusu. Banda wana, nazangisaka makita te. Makita yango ya boklisto elendisaka, mpe ekokisaka mposa na ngai ya elimo. Ata soki likambo nini elɛmbisi ngai nzoto, nakendaka na Ndako ya Bokonzi, na elikya ete nakozwa lisusu makasi.”
Yo mpe, soki okei na makita ya Batatoli ya Yehova, okoyoka mateya ya Biblia, okokutana na baninga oyo bakolendisa yo mpe okozwa libaku ya kokumisa Nzambe. Tozali kobengisa yo na esengo mpenza na Ndako ya Bokonzi oyo ezali pene na ndako na yo. Soki oyei, okosepela.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Baloma babebisaki tempelo mobimba. Efelo ya Bileli (le mur des Lamentations), esika oyo Bayuda mingi oyo bautaka mosika bayaka kobondela, ezali efelo ya tempelo yango te. Ezali nde eteni ya lopango ya tempelo.
b Ekoki kozala ete basinagoga ebandaki na boumeli ya boombo ya mbula 70 oyo Bayuda balekisaki na Babilone na ntango oyo tempelo ezalaki lisusu te to mpe mwa moke nsima ya kouta na boombo na ntango oyo mosala ya kotonga lisusu tempelo ezalaki naino kosalema. Na ekeke ya liboso, engumba mokomoko ya Palestine ezalaki na sinagoga na yango, bingumba oyo ya minene ezalaki na basinagoga ebele.
[Bililingi na lokasa 4]
Mongombo mpe batempelo oyo etongamaki na nsima ezalaki bisika oyo ebongaki mpo na losambo ya Yehova
[Elilingi na lokasa 6]
Bazilike Saint-Pierre na Rome
[Elilingi na lokasa 7]
Baklisto ya liboso bazalaki koyangana na bandako ya bamosusu kati na bango
[Bililingi na lokasa 8]
Batatoli ya Yehova basalaka makita na bango na bandako ya bamosusu kati na bango mpe na Bandako ya Bokonzi