Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/1 nk. 17-20
  • Ndenge ya kotikala makasi ntango mwana akómi motomboki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kotikala makasi ntango mwana akómi motomboki
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntango bana ya Yehova bakómaki batomboki
  • Bwaká mitungisi na yo epai ya Yehova
  • Osengeli komikitisa
  • Tɛmɛlá Zabolo
  • Soki mwana na yo abimisami na lisangá
  • Yehova akotika yo te
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Bozali na motomboki kati na ndako?
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Baboti, bóbatela libula na bino ya motuya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Ndenge nini bokoki kosalisa mwana “ya kilikili”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/1 nk. 17-20

Ndenge ya kotikala makasi ntango mwana akómi motomboki

MWASI moko oyo tokobenga Joy, asalaki makasi alona bolingo ya Yehova na motema ya mwana na ye banda azalaki naino moke. Kasi, ntango mwana yango akómaki elenge, akómaki motomboki mpe akimaki ndako ya baboti. Joy alobi boye: “Likambo yango esalaki ngai mpasi oyo nayoká naino te. Nazalaki komona lokola nde bakosi ngai, nalɛmbaki nzoto, mpe nazalaki na esengo ata moke te. Makanisi ekómaki kotambola ngai motó.”

Mbala mosusu yo mpe osalaki makasi mpo na kosalisa bana na yo bálinga Nzambe mpe básalela ye; kasi na nsima, moko na bango, mbala mosusu mpe mingi, bapesaki ye mokɔngɔ. Ndenge nini okoki kolonga mpasi oyo likambo ya ndenge wana epesaka? Nini ekoki kosalisa yo otikala makasi na mosala ya Yehova?

Ntango bana ya Yehova bakómaki batomboki

Likambo ya liboso oyo osengeli kobosana te ezali ete Yehova ayebi malamu ndenge oyo ozali koyoka. Yisaya 49:15 elobi boye: “Mwasi akoki nde kobosana mwana oyo anungi ye naino? Ayoka mawa lisusu te mpo na mwana mobali ya libumu na ye? Ata baoyo bakobosana nde ngai nakobosana yo te.” Yehova ayokaka ndenge oyo tata to mama nyonso ayokaka. Kanisá naino esengo oyo azalaki na yango ntango baanzelu nyonso bazalaki kosanzola ye mpe kosalela ye. Ntango Yehova alobaki na Yobo “uta na mopɛpɛ makasi,” alobelaki bantango malamu oyo alekisaki na bana na ye, ntango libota na ye mobimba ya elimo ezalaki na bomoko; atunaki ye boye: “Yo ozalaki wapi wana natyaki miboko ya mokili? . . . Wana minzoto ya ntɔngɔntɔngɔ eyembaki elongo moko mpe bana nyonso ya Nzambe bagangaki na esengo?”​—Yobo 38:1, 4, 7.

Na nsima, mwana na ye moko ya elimo alingaki lisusu kotosa ye Nzambe te mpe akómaki Satana, elingi koloba “Motɛmɛli.” Lisusu, Adama, mwana na ye ya liboso awa na mabelé ná mwasi na ye Eva, balandaki nzela ya Satana mpe bakómaki batomboki. (Genese 3:1-6; Emoniseli 12:9) Na nsima lisusu, bana mosusu ya Nzambe, elingi koloba baanzelu mosusu, “basundolaki efandelo na bango moko mpenza” mpe batombokelaki Nzambe.​—Yuda 6.

Biblia eyebisi biso te ndenge oyo Yehova ayokaki na motema ntango bana na ye mosusu oyo bazalaki bikelamu ya kokoka balingaki lisusu kotosa ye te. Nzokande, Biblia elobi polele ete: “[Yehova] amonaki ete masumu ya bato ezalaki mingi na mokili mpe ete makanisi nyonso kati na mitema na bango ezalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso. [Yehova] ayokaki mawa ete asalaki bato kozala na nse, mpe likambo yango epesaki ye bolɔzi na motema.” (Genese 6:5, 6) Lisusu, botomboki ya Yisalaele, libota oyo Yehova aponaki, ‘etungisaki’ ye mpe ‘epesaki ye mpasi na motema.’​—Nzembo 78:40, 41, NW.

Tomoni mpenza ete Yehova ayebaka mpasi ya baboti oyo bazali komitungisa mpo na etamboli mabe ya bana na bango. Na kati ya Biblia, Liloba na ye, Nzambe apesi batoli mpe akomisi maloba ya kolendisa mpo na kosalisa baboti yango báyika mpiko. Alendisi bango bábwaka mitungisi na bango epai na ye, bámikitisa, mpe bátɛmɛla Satana Zabolo. Sikoyo, tótalela ndenge oyo toli yango ekoki kosalisa yo mpo otikala makasi ntango mwana na yo akómi motomboki.

Bwaká mitungisi na yo epai ya Yehova

Yehova ayebi ete baboti bamitungisaka mingi ntango mwana na bango akómi kolanda nzela oyo ekobendela ye mikakatano to ekopesa bato mosusu nzela ya koyokisa ye mpasi. Ntoma Petelo alobelaki ndenge oyo baboti bakoki koyika mpiko na motungisi yango mpe mitungisi mosusu. Akomaki boye: ‘Bóbwaka mitungisi na bino nyonso likoló na Yehova, mpamba te ye atyelaka bino likebi.’ (1 Petelo 5:⁠7) Mpo na nini maloba wana ya kolendisa ezali na ntina mingi mpo na baboti oyo mwana na bango akómi motomboki?

Ntango mwana na yo azalaki moke, ozalaki kokɛngɛla ye mpo na kobatela ye na makama; na ntembe te, azalaki mpe kotosa malako oyo ozalaki kopesa ye. Kasi, lokola akoli, ozali lisusu na likoki te ya kokɛngɛla ye bisika nyonso; nzokande, mposa ya kobatela ye na makama ezali kaka makasi na motema yo. Kutu, ntango mosusu ebakisami nde kobakisama.

Yango wana, ntango mwana na yo akómi motomboki mpe yango ebendeli ye mpasi na nzoto to mikakatano ya elimo, mbala mosusu okoki kokanisa ete ezali foti na yo. Joy, mwasi oyo tolobelaki na ebandeli, ayokaki ndenge yango. Alobi boye: “Mokolo na mokolo nazalaki kokanisa ete mbala mosusu nakokisaki mokumba na ngai malamu te, nazalaki kokanisakanisa makambo oyo eleká.” Mingimingi, ntango ozali koyoka ndenge wana nde Yehova alingaka ‘obwaka mitungisi na yo epai na ye.’ Soki okitiseli Yehova mitungisi na yo, ye akosalisa yo. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Kitisá mokumba na yo epai na [Yehova] mpe ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atɛlɛngana.” (Nzembo 55:22) Joy asalaki bongo mpe motema na ye ekitaki mpenza. Alobi boye: “Nafungolelaki Yehova motema na ngai mpe nayebisaki ye mabanzo na ngai nyonso. Motema na ngai ekitaki mpenza.”

Lokola ozali moto ya kozanga kokoka, ekoki mpe kozala ete osalaki mabunga na ndenge ya kobɔkɔla mwana na yo. Kasi, esengeli te okanisaka kaka mabunga yango. Yehova akanisaka yango te; tolobi bongo mpamba te mokomi ya nzembo akomaki boye: “[Yehova], soki yo okotalaka bokesene, ee Nkolo, nani akotɛlɛma?” (Nzembo 130:3) Kutu, ata soki ozali moto ya kokoka, mwana na yo akoki mpe kokóma motomboki. Yango wana, bondeláká Yehova mpo na koyebisa ye mitungisi na yo mpe ye akosalisa yo. Nzokande, mpo ozala ntango nyonso na makasi ya kosalela Yehova mpe okwea na motambo ya Satana te, ezali na makambo mosusu oyo osengeli kosala.

Osengeli komikitisa

Petelo akomaki boye: “Bómikitisa na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe, mpo atombola bino na ntango ekoki.” (1 Petelo 5:6) Mpo na nini osengeli komikitisa ntango mwana na yo akómi motomboki? Ntango mwana akómi motomboki, makanisi na yo moboti ekoki kozala ete ntango mosusu ezali foti na yo mpe okoki kobanda koyoka mpasi na motema; longola yango, likambo yango ekoki kobanda koyokisa yo nsɔni. Mbala mosusu okokanisa ete etamboli ya mwana na yo ebebisi lokumu ya libota mobimba, mingimingi soki mwana yango abimisami na lisangá. Kokanisa ete ezali foti na yo mpe nsɔni oyo ozali koyoka, ekoki kolongola yo ata mposa ya koyangana na makita.

Soki likambo ya ndenge wana ekómeli yo, osengeli kosalela bwanya. Masese 18:1 elobi boye: “Ye oyo akomitangola na bamosusu akolukaka yango ekosepelisa ye moko; akosilika na makambo nyonso ya mayele.” Atako ozali na mawa na motema, soki ozali koyangana na makita nyonso, okoyoka mateya mpe bilendiseli oyo ekosalisa yo. Joy alobi boye: “Na ebandeli nazalaki kolinga kokutana na moto te. Kasi, nakanisaki lisusu ntina ya kolanda programɛ malamu ya makambo ya elimo. Longola yango, soki nafandaki kaka na ndako, nalingaki ntango nyonso kokanisakanisa mikakatano na ngai. Koyangana na makita esalisaki ngai natya makanisi na ngai na makambo oyo elendisaka. Nasepelaka mingi ndenge nakimaki bato te mpe yango esalaki ete bandeko bálendisa ngai.”​—Baebele 10:24, 25.

Likambo mosusu oyo osengeli kobosana te ezali ete ata na kati ya libota, moto na moto asengeli “komema mokumba na ye moko.” (Bagalatia 6:5) Yehova alingi ete baboti bálinga bana na bango mpe bápesaka bango disipilini. Kasi, alingi mpe ete bana bátosaka baboti na bango mpe bákumisa bango. Soki baboti bazali kosala nyonso mpo na kobɔkɔla bana na “disipilini mpe na makebisi ya Yehova,” Nzambe akomona ete bazali kokokisa mokumba na bango mpe akosepela na bango. (Baefese 6:1-4) Soki mwana moko alingi kotosa baboti te, Nzambe akomona ete mwana ye moko nde azali mabe. Masese 20:11 elobi boye: “Ata mwana ayebani na misala na ye, soki mosala na ye ezali ya pɛto mpe soki ezali sembo.” Tokoki koloba te ete botomboki ya Satana ebebisaki lokumu ya Nzambe na miso ya bikelamu na ye oyo bayebi mpenza makambo oyo elekaki.

Tɛmɛlá Zabolo

Petelo apesaki toli oyo: “Bóbatela makanisi na bino, bókebaka. Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali konguluma, kolukáká kolya moto.” (1 Petelo 5:8) Zabolo asalaka lokola nkɔsi; elingi koloba ete alukaka mingimingi bilenge mpe bato oyo bayebi naino makambo mingi te. Na ntango ya kala, bankɔsi bazalaki mingi na bazamba ya Yisalaele mpe yango ezalaki likama mpo na bibwɛlɛ. Soki mwana-mpate atiki etonga mpe akei kolya ye moko mwa mosika, ezalaki mpasi te mpo nkɔsi akanga ye. Mama ya mpate akokaki komeka kobikisa mwana na ye na monɔkɔ ya nkɔsi. Kasi, ata mpate oyo akɔmeli mpenza akoki kotɛlɛma te liboso ya nkɔsi. Yango wana, esengelaki babateli ya mpiko mpo na kobatela etonga.​—1 Samwele 17:34, 35.

Yehova aponi babateli ya mpate ya elimo oyo Yesu Klisto, “mobateli ya mpate mokonzi” azali kotambwisa, mpo bákɛngɛlaka bampate na ye mpo ete “nkɔsi oyo azali konguluma” alya bango te. (1 Petelo 5:4) Petelo apesi mibali yango toli oyo: “Bóbatela etonga ya Nzambe oyo epesami na mabɔkɔ na bino, na kopusama te, kasi na bolingo malamu; na bolingo ya litomba ezangi sembo te, kasi na mposa makasi.” (1 Petelo 5:1, 2) Soki bino baboti bozali kopesa babateli yango mabɔkɔ, bakoki kosalisa elenge oyo atɛngami azonga na nzela ya malamu.

Ntango mwana na yo abungi nzela mpe bankulutu balingi kopesa ye toli, motema na yo ekoki kotinda yo oluka kokɔtela ye. Kasi, kosala bongo ezali libunga monene. Petelo alobi boye: “Bótɛmɛla [Zabolo]”; kasi te bótɛmɛla bakɛngɛli ya elimo.​—1 Petelo 5:9.

Soki mwana na yo abimisami na lisangá

Soki mwana na yo oyo akómi na etamboli ya mabe azali moklisto oyo azwi batisimo, mpe alingi kobongola motema te, bankulutu bakoki kopesa ye etumbu makasi ya kobimisa ye na lisangá. Na ntango wana, ndenge oyo okofanda na mwana yango ekotalela bambula na ye mpe mwa makambo mosusu.

Soki azali naino mwana moke mpe azali na mabɔkɔ na yo, osengeli kokoba koleisa mpe kolatisa ye lokola mwana nyonso. Esengeli mpe oteyaka ye bizaleli malamu mpe opesaka ye disipilini. (Masese 1:8-18; 6:20-22; 29:17) Okoki ata mpe koyekolaka na ye, mpe asengeli kopesaka biyano na mituna. Okoki kotánga na ye bavɛrsɛ ya Biblia mpe mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45) Okoki mpe komemaka mwana yango na makita mpe kofanda na ye esika moko. Okosala nyonso wana na elikya ete toli ya Biblia ekosimba motema na ye.

Nzokande, okosala nyonso wana te soki mwana oyo abimisami na lisangá azali mokóló mpe afandaka na yo te. Ntoma Paulo apesaki baklisto ya Kolinti toli oyo: “Bótika kosangana na moto nyonso oyo abengami ndeko oyo azali moto ya pite to moto ya lokoso to mosambeli ya bikeko to mofingi to molangwi-masanga to mobɔtɔli, bólya kutu esika moko na moto ya ndenge wana te.” (1 Bakolinti 5:11) Makambo mosusu ya libota ekoki kosɛnga bókutana mpe bósolola na mwana oyo abimisami na lisangá; kasi, moboti oyo azali moklisto akomonisa ete azali kokutana mpe kosolola na ye kaka soki likambo moko ya ntina mpenza esɛngi yango.

Ntango babateli ya mpate bapesi mwana oyo alandi nzela ya mabe disipilini, ekozala mpenza libunga soki ozali kotyola to koloba mabe mpo na likambo oyo mitinda ya Biblia esɛngi bango básala. Koluka kokɔtela mwana na yo oyo azali kotambola mabe ekobatela ye te na Zabolo. Kutu, ekoki kokóma mabe mingi mpo na elimo na yo moko. Nzokande, soki omitye na ngámbo ya babateli yango mpe ondimi ekateli oyo bazwi, okotikala “makasi na kati ya kondima” mpe okosalisa mpenza mwana na yo.​—1 Petelo 5:9.

Yehova akotika yo te

Soki mwana na yo akómi motomboki, yebá ete ozali yo moko te. Baklisto mosusu mpe basilá kokutana na likambo yango. Ata soki tokutani na mikakatano nini, Yehova akoki kosalisa biso.​—Nzembo 68:19.

Tyelá Yehova motema mpe bondeláká ye. Yanganáká na makita pɔsɔ na pɔsɔ. Zalá na ngámbo ya bankulutu ntango bapesi mwana na yo disipilini. Na ndenge yango, okotikala makasi. Ndakisa malamu na yo ekoki mpe kosalisa mwana na yo azonga epai ya Yehova, oyo atandi mabɔkɔ mpe azali kozela ye.​—Malaki 3:6, 7.

[Bililingi na lokasa 18]

Bondeláká mpe yanganáká na makita mpo na kozwa makasi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto