Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/10 nk. 20-23
  • Tóyeba ntina mpenza ya disipilini

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóyeba ntina mpenza ya disipilini
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bokeseni kati na disipilini ná etumbu
  • Disipilini ya baboti ya bolingo
  • Bakɛngɛli baklisto bapesaka disipilini na boboto
  • Yehova azali Zuzi ya sembo
  • Tóndima disipilini ya Yehova
  • Disiplini emonisaka ete Yehova alingaka biso
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Disiplini emonisaka bolingo ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Ndenge nini osengeli kopesa bana disiplini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Disipline ezali kobimisa mbuma na kimya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/10 nk. 20-23

Tóyeba ntina mpenza ya disipilini

LIKANISI nini eyelaka yo soki oyoki liloba “disipilini”? Diksionɛrɛ moko elobi ete kopesa disipilini elimboli “kosala ete mibeko mpe mitinda ya etamboli malamu etosama mpe kopesa etumbu soki etosami te.” Atako liloba disipilini ezali kaka na ndimbola moko wana te, bato mingi bamonaka ete ezali kaka etumbu.

Kasi, Biblia esaleli liloba disipilini na ndenge mosusu. Salomo, mokonzi ya bwanya akomaki ete: “Ee mwana na ngai, koboya disipilini ya Yehova te.” (Masese 3:11, NW) Maloba wana ezali kolobela disipilini nyonso te, kasi nde “disipilini ya Yehova,” elingi koloba, disipilini oyo epesami na kolanda mitinda ya Nzambe. Kaka disipilini ya ndenge wana nde ebotaka mbuma malamu mpe ebimisaka matomba na elimo​—yango nde bato basengeli kolinga mingi. Nzokande, mbala mingi disipilini oyo euti na makanisi ya bato, oyo eyokani te na mitinda ya Yehova, eyokisaka nde mpasi. Yango nde ntina oyo bato mingi bamonaka ete disipilini ezali eloko malamu te.

Mpo na nini bazali kolendisa biso tóndima disipilini ya Yehova? Biblia ezali komonisa ete disipilini ya Nzambe ezali moko ya lolenge oyo amonisaka bato bolingo na ye. Yango wana Salomo alobaki ete: “Yehova apamelaka moto oyo ye alingaka, kaka ndenge tata asalaka na mwana oyo motema na ye esepelaka na ye.”​—Masese 3:12, NW.

Bokeseni kati na disipilini ná etumbu

Biblia ezali kolobela disipilini na ndenge ebele​—kotambwisa, koteya, kolakisa, kopamela, kosembola, ata mpe kopesa etumbu. Kasi, ata na ndenge nini, disipilini ya Yehova eutaka kaka na bolingo, mpe elukaka nde bolamu ya moto oyo azali kozwa yango. Disipilini oyo Yehova apesaka mpo na kosembola ezalaka kaka etumbu te.

Epai mosusu, bitumbu ya Nzambe ezalaka kaka te mpo na kosembola bato to mpo na kopesa bango liteya. Na ndakisa, banda kaka mokolo oyo Adama ná Eva basalaki lisumu, babandaki konyokwama mpo na kozanga botosi na bango. Yehova abimisaki bango na elanga ya Edene mpe bakómaki komona mpasi mpo na kozanga kokoka, maladi, mpe bobange. Nsima ya bomoi ya mpasi na boumeli ya bankama ya bambula, bakufaki mpo na libela. Nyonso wana ezalaki etumbu ya Nzambe, kasi apesaki yango mpo na kosembola bango te. Lokola Adama ná Eva baboyaki kotosa na nko mpe babongolaki motema te, bakokaki kosembolama te.

Masolo mosusu oyo elobeli bitumbu ya Yehova ezali lokola Mpela ya ntango ya Noa, kobomama ya Sodoma ná Gomola mpe ya basoda ya Ezipito na Mai Motane. Yehova apesaki bitumbu wana te mpo na kosembola, koteya to kolakisa bato yango. Ntoma Petelo akomaki mpo na bitumbu motindo wana ya Nzambe ete: “Amipekisaki te kopesa mokili moko ya kala etumbu, kasi abatelaki Noa, mosakoli moko ya boyengebene, elongo na bato mosusu nsambo ntango ayeisaki mpela likoló ya mokili moko ya bato oyo bazalaki kotyola Nzambe; mpe na kokómisáká bingumba ya sodoma mpe Gomola mputulu ya mɔtɔ akweisaki yango, kopesáká bato oyo batyolaka Nzambe ndakisa ya makambo oyo ekoya.”​—2 Petelo 2:5, 6.

Na ndenge nini bitumbu yango ‘epesaki bato oyo batyolaka Nzambe ndakisa ya makambo oyo ekoya’? Na mokanda oyo Paulo akomelaki Batesaloniki, alobaki ete mikolo na biso ezali ntango oyo Nzambe, na nzela ya Mwana na ye, Yesu Klisto, akozongisa “mabe na baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali te kotosa nsango malamu.” Paulo abakisi ete: “Bato yango mpenza bakozwa etumbu ya lisambisi ya libebi ya seko.” (2 Batesaloniki 1:8, 9) Emonani polele ete Yehova apesaki bitumbu wana mpo na koteya to kosembola te. Nzokande, ntango Yehova azali kosɛnga basambeli na ye ete bándima disipilini na ye, azali kolobela te etumbu oyo apesaka basumuki oyo baboyaka kobongola motema.

Ezali na ntina koyeba ete Biblia elobelaka Yehova libosoliboso te lokola mopesi bitumbu. Biblia elobelaka ye mingimingi nde lokola moteyi ya bolingo mpe molakisi ya motema molai. (Yobo 36:22; Nzembo 71:17; Yisaya 54:13) Ya solo, disipilini oyo Nzambe apesaka mpo na kosembola bato, apesaka yango ntango nyonso na bolingo mpe na motema molai. Lokola baklisto bayebi ntina mpenza oyo Yehova apesaka disipilini, bandimaka yango kozanga kokakatana mpe bapesaka bato mosusu disipilini na ndenge ebongi.

Disipilini ya baboti ya bolingo

Na kati ya libota mpe na kati ya lisangá ya boklisto, ezali na ntina mingi ete bato nyonso báyeba ntina ya disipilini. Mingimingi baoyo bazali na bokonzi, na ndakisa baboti. Masese 13:24 (NW) elobi ete: “Ye oyo aboyi kosalela fimbo ayinaka mwana na ye, kasi oyo alingaka ye ezali oyo apesaka ye disipilini.”

Ndenge nini baboti basengeli kopesa disipilini? Biblia elobi boye: “Bino, batata, bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4) Toli yango ezongelami lisusu na maloba oyo: “Bino batata, bósilikisaka bana na bino te, mpo bálɛmba nzoto te.”​—Bakolose 3:21.

Baboti oyo bayebi ntina ya disipilini basalelaka bana na bango makambo makasimakasi te. Baboti bakoki kolanda etinda oyo ezali na 2 Timote 2:24 ntango bazali kopesa disipilini. Paulo akomaki boye: “Moombo ya Nkolo asengeli te kobunda, asengeli nde kozala na boboto epai ya bato nyonso, moto oyo akoki mpo na koteya.” Kanda makasimakasi, kogangela bato mpe kofinga to maloba mabe emonisaka bolingo te mpe ezali na esika te na bomoi ya moklisto.​—Baefese 4:31; Bakolose 3:8.

Kosembola bana ezali kaka te kopesa mbala moko etumbu ya makasimakasi. Mpo na bana mingi esɛngaka kozongela toli mbala na mbala liboso báyoka. Yango wana baboti basengeli kozwa ntango mingi, kozala motema molai mpe kokanisa malamumalamu ndenge oyo basengeli kopesa disipilini. Basengeli kobosana te ete ebongi kobɔkɔla bana na “disipilini mpe na makebisi ya Yehova.” Elingi koloba kopesa bango formasyo oyo ekosɛnga bambula ebele.

Bakɛngɛli baklisto bapesaka disipilini na boboto

Bankulutu basengeli mpe kolanda mitinda yango. Lokola bazali babateli ya bolingo, bazali kosala nyonso mpo na kolendisa bampate na mateya, na kopesa bango litambwisi mpe, soki esengeli, na kopamela bango. Ntango bazali kosala bongo, babosanaka te ntina mpenza ya disipilini. (Baefese 4:11, 12) Soki batye makanisi na bango kaka na kopesa moto oyo asali mabe etumbu, bakosala lisusu eloko moko te nsima ya kopesa etumbu. Kasi disipilini ya Nzambe esuki kaka na kopesa etumbu te. Bolingo etindaka bankulutu bálɛmba te na kopesa toli. Lokola bamibanzabanzaka mpenza mpo na bampate, mbala na mbala bazwaka ntango mpo na kolendisa mpe mpo na kopesa formasyo.

Na kotalela toli oyo epesami na 2 Timote 2:25, 26, bankulutu basengeli kolakisa “na boboto” ata bato oyo baboyaka disipilini. Na nsima, vɛrsɛ yango eyebisi ntina ya disipilini: “Ntango mosusu Nzambe akoki kopesa bango kobongola motema oyo ezali komema na boyebi ya sikisiki ya solo, mpe bakoki kozongela makanisi na bango mpenza ya malamu uta na motambo ya Zabolo.”

Ntango mosusu esɛngaka mpenza kobimisa na lisangá basali ya mabe oyo baboyi kobongola motema. (1 Timote 1:18-20) Ata mpe ekateli wana ya makasi esengeli kotalelama ete ezali kaka disipilini, kasi etumbu mpamba te. Mbala na mbala, bankulutu basalaka nyonso mpo na kotala bato oyo babimisamá na lisangá, kasi bamipesaka te na kosala mabe. Ntango bankulutu bakendeke epai ya bato ya ndenge wana, bamonisaka ntina mpenza ya disipilini wana bazali koyebisa bango makambo oyo basengeli kosala mpo na kozonga na lisangá ya boklisto.

Yehova azali Zuzi ya sembo

Baboti, bankulutu mpe bato mosusu oyo Biblia epesi mokumba ya kopesa disipilini basengeli kozwa mokumba yango na lisɛki te. Basengeli te kokanisela bato mosusu ete bakoki kobongwana te. Na yango, disipilini oyo bazali kopesa esengeli te kozala etumbu ya kofutisa moto masumu to ya nkanda.

Kutu, Biblia elobi ete Yehova nde akopesa etumbu ya makasi mpe ya libela. Biblia elobi ete “ezali likambo ya nsɔmɔ kokwea na mabɔkɔ ya Nzambe ya bomoi.” (Baebele 10:31) Kasi moto moko te asengeli komeka komitya na esika ya Yehova ezala na likambo nini. Mpe esengeli te ete moboti moko boye to nkulutu moko boye amonisa ete ezali likambo ya nsɔmɔ kokwea na mabɔkɔ na ye.

Ntango Yehova azali kopesa disipilini, apesaka mpenza etumbu oyo ekoki na likambo oyo moto asali. Bato bayebaka yango te. Nzambe akoki koyeba makanisi oyo ezali na motema ya moto mpe koyeba ete moto yango akobongwana lisusu te mpe bongo, kokata ete abongi na etumbu ya makasi mpe ya libela. Nzokande, bato bazali na likoki te ya kokatela moto etumbu na ndenge wana. Yango wana, soki esengeli kopesa disipilini, bato oyo bazali na bokonzi basengeli ntango nyonso kosala yango na mokano ya kosalisa moto atika mabe.

Tóndima disipilini ya Yehova

Disipilini ya Yehova ezali na ntina mpo na biso nyonso. (Masese 8:33) Na yango, tosengeli koluka disipilini oyo euti na Liloba ya Nzambe. Ntango tozali koyekola Liloba ya Nzambe, tokozala na likoki ya kondima disipilini oyo Yehova ye moko azali kopesa na nzela ya Makomami. (2 Timote 3:16, 17) Kasi, ntango mosusu, disipilini ekoki kouta epai ya baninga na biso baklisto. Koyeba ntina mpenza oyo bazali kopesa biso disipilini ekosalisa biso tóndima yango kozanga kokakatana.

Ntoma Paulo alobaki boye: “Ya solo, disipilini moko te ezalaka esengo mpo na sikoyo, kasi nde mawa.” Abakisaki boye: “Nzokande na nsima epai ya baoyo bateyami na yango ebotaka mbuma ya kimya, elingi koloba, boyengebene.” (Baebele 12:11) Disipilini ya Yehova emonisaka ete alingaka biso mingi. Ezala bazali kopesa biso disipilini to tozali kopesa bato mosusu disipilini, tosengeli te kobosana ntina mpenza ya disipilini ya Nzambe mpe tótosa maloba ya Biblia oyo: “Simbá disipilini; kotika yango te. Batelá yango, mpo yango nde bomoi na yo.”​—Masese 4:13, NW.

[Bililingi na lokasa 21]

Nzambe apesaka basumuki oyo baboyi kobongola motema etumbu, kasi te disipilini mpo na kosembola bango

[Bililingi na lokasa 22]

Bolingo etindaka bankulutu báluka bato oyo babungi nzela mpe básalisa bango

[Bililingi na lokasa 23]

Baboti bapesaka ‘disipilini mpe makebisi ya Yehova’ na bolingo mpe na motema molai

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto