Loyembo ya ntango ya komata.
134 Ee bópambola Yehova,+
Bino nyonso, basaleli ya Yehova,+
Bino baoyo botɛlɛmaka na ndako ya Yehova na butu.+
2 Bózala basantu ntango bozali kotombola mabɔkɔ na bino+
Mpe bópambola Yehova.+
3 Yehova apambola bino uta na Siona,+
Ye Mokeli ya likoló ná mabele.+