Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Mbote.
Awa ezali esika ya kosala bolukiluki na mikanda oyo Batatoli ya Yehova babimisaka na minɔkɔ ndenge na ndenge.
Mpo na kozwa mikanda, kende na jw.org.
Liyebisi
Monɔkɔ ya sika: Mbum
  • Lelo

Mwayambo, 28 sanza ya 7

Moto oyo azali na bomoko elongo na bino aleki moto oyo azali na bomoko elongo na mokili.—1 Yoa. 4:4.

Ntango ozali kobanga, manyolá na makambo oyo Yehova akosala na mikolo ezali koya ntango Satana akozala lisusu te. Elakiseli moko na liyangani ya etúká ya 2014 emonisaki Tata moko azali kolobela elongo na libota na ye ndenge oyo 2 Timote 3:​1-5 ekokaki kotángama soki maloba yango esakolaki nde makambo oyo ekozala na Paradiso: “Na mokili ya sika ntango moko ya esengo mpenza ekozala. Mpo bato bakozala bato oyo balingaka basusu, bato balingá bozwi ya elimo, bato ya mindɔndɔ te, bato ya komikitisa, bato oyo bakumisaka Nzambe, oyo batosaka baboti, oyo bazali na botɔndi, oyo bazali sembo, oyo balinganaka na kati ya mabota, oyo balingaka kosala boyokani, oyo balobaka ntango nyonso bolamu ya basusu, oyo bamipekisaka, bato ya boboto, oyo balingaka makambo ya malamu, bato oyo batyelaka motema, oyo batingamaka na makambo te, oyo bavimbi na lolendo te, oyo balingá Nzambe na esika ya kolinga bisengo, oyo bazali mpenza kokangama na Nzambe; mpe yo kangamá na bato ya lolenge wana.” Yo mpe osololaka na bato ya libota na yo to bandeko ya lisangá ndenge bomoi ekozala na mokili ya sika? w24.01 6 par. 13-14

Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2025

Mwamibale, 29 sanza ya 7

Nandimi yo.—Luka 3:22.

Koyeba ete Yehova andimaka basaleli na ye nyonso ekitisaka motema mpenza! Biblia elobi: “Yehova azali kosepela na bato na ye.” (Nz. 149:4) Kasi, basusu balɛmbaka nzoto mpe bamitunaka na bantango mosusu: ‘Yehova andimaka ngai mpenza?’ Na bantango mosusu, basaleli mosusu ya sembo ya Yehova na ntango ya kala mpe bakómaki na makanisi ya ndenge wana. (1 Sa. 1:​6-10; Yobo 29:​2, 4; Nz. 51:11) Biblia emonisi polele ete bato ya kozanga kokoka bakoki kondimama na Yehova. Ndenge nini? Soki tomonisi kondima epai ya Yesu Kristo mpe tozwi batisimo. (Yoa. 3:16) Na ndenge yango, tomonisaka na miso ya bato ete tobongoli motema na masumu na biso mpe tolaki Nzambe ete tokosala mokano na ye. (Mis. 2:38; 3:19) Yehova asepelaka ntango tosali makambo wana mpo na kokóma baninga na ye. Ntango nyonso oyo tozali kosala makasi tótosa elako na biso ya komipesa na Nzambe, Yehova andimaka biso mpe amonaka ete tozali baninga na ye ya motema.—Nz. 25:14. w24.03 26 par. 1-2

Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2025

Mwamisato, 30 sanza ya 7

Tokoki kotika te koloba makambo oyo tomoni mpe toyoki.—Mis. 4:20.

Tokoki komekola bantoma soki tozali kokoba kosakola ata soki bakonzi ya Leta basɛngi biso tótika kosakola. Tokoki kozala na elikya ete Yehova akosalisa biso tókokisa mokumba na biso ya kosakola. Sɛngá Yehova apesa yo mpiko mpe bwanya mpe asalisa yo oyika mpiko na mikakatano. Mingi kati na biso bazali konyokwama na maladi, mitungisi ya makanisi, liwa ya moto oyo tozalaki kolinga mingi, mikakatano na libota, monyoko, to mikakatano mosusu. Mpe bamaladi mabe, bitumba esali ete mikakatano yango ekóma lisusu mpasi mpo na koyikela yango mpiko. Yebisá Yehova ndenge ozali mpenza komiyoka. Yebisá ye makambo ozali kokutana na yango kaka ndenge olingaki koyebisa yango moninga na yo ya motema. Zalá na kondima ete Yehova “akosalisa yo.” (Nz. 37:​3, 5) Kotingama na mabondeli ekosalisa biso ‘tóyika mpiko na bolɔzi.’ (Rom. 12:12) Yehova ayebi mikakatano oyo basaleli na ye bazali kokutana na yango, “akoyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.”—Nz. 145:​18, 19. w23.05 5-6 par. 12-15

Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2025
Mbote.
Awa ezali esika ya kosala bolukiluki na mikanda oyo Batatoli ya Yehova babimisaka na minɔkɔ ndenge na ndenge.
Mpo na kozwa mikanda, kende na jw.org.
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto