Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 37:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Na Ntango yango mibali, Bamidiane oyo basalaka mombongo,+ bazalaki koleka. Na yango, babendaki Yozefe mpe batombolaki ye, abimi na libulu yango ya mai+ mpe na nsima batɛkaki Yozefe epai ya Bayishimaele na shekele ya palata ntuku mibale (20).+ Nsukansuka, bango bamemaki Yozefe na Ezipito.

  • Kobima 2:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Na nsima, Farao ayokaki likambo yango, mpe alukaki koboma Moize;+ kasi Moize akimaki mosika+ na Farao mpo na kofanda na mokili ya Midiane;+ mpe afandaki pembeni ya libulu moko ya mai.

  • Mitángo 22:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe Moabe elobaki na mikóló ya Midiane+ ete: “Sikoyo lisangá oyo ekolya biloko nyonso zingazinga na biso ndenge ngɔmbɛ-mobali elyaka matiti ya sika na elanga.”

      Mpe Balake+ mwana ya Zipore azalaki mokonzi ya Moabe na ntango yango.

  • Mitángo 31:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Zongiselá Bamidiane mabe+ mpo na bana ya Yisraele.+ Na nsima, okoyanganisama na bato na yo.”+

  • Basambisi 6:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe lobɔkɔ ya Midiane elongaki Yisraele.+ Mpo na Bamidiane, bana ya Yisraele bamisalelaki bibombelo na nse ya mabele oyo ezalaki na bangomba, mpe na mibenga mpe na bisika oyo ezali mpasi mpo na kokóma kuna.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto