44 Mpe Farao alobaki lisusu na Yozefe ete: “Ngai nazali Farao, kasi soki na ndingisa na yo te, moto moko te akoki kotombola lobɔkɔ na ye to lokolo na ye na mokili mobimba ya Ezipito.”+
8 Na bongo, ezali bino te nde botindaki ngai awa,+ kasi ezali Nzambe ya solo, mpo atya ngai tata+ ya Farao mpe nkolo ya ndako na ye mobimba mpe moto oyo azali koyangela mokili mobimba ya Ezipito.
10 mpe asikolaki ye na malɔzi na ye nyonso mpe apesaki ye ngɔlu mpe bwanya na miso ya Farao mokonzi ya Ezipito. Mpe atyaki ye mpo na koyangela Ezipito mpe ndako na ye mobimba.+