Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 15:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Kasi na libota ya minei, bango bakozonga awa,+ mpamba te libunga ya Baamore ekómi naino na nsuka na yango te.”+

  • Ebandeli 28:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe talá nazali elongo na yo mpe nakobatela yo na nzela nyonso oyo ozali kokende mpe nakozongisa yo na mabele oyo,+ mpo nakotika yo te kino nakosilisa mpenza kosala oyo nalobi na yo.”+

  • Ebandeli 47:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Nsukansuka mokolo ya liwa ya Yisraele ekómaki pene.+ Bongo abengaki mwana na ye Yozefe mpe alobaki na ye ete: “Sikoyo, soki nandimami na miso na yo, nabondeli yo, tyá lobɔkɔ na yo na nse ya ebɛlɔ na ngai,+ mpe osengeli komonisela ngai motema boboto mpe bosembo.+ (Nabondeli yo, kokunda ngai na Ezipito te.)+

  • Ebandeli 50:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Bongo bana na ye bamemaki ye na mokili ya Kanana mpe bakundaki ye na mobenga ya elanga ya Makapela, oyo ezali kotalana na Mamare, elanga oyo Abrahama asombaki epai ya Efrone Mohiti, mpo ezala esika ya kokunda bibembe.+

  • Kobima 3:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe nazali kokita mpo na kobikisa bango na lobɔkɔ ya Baezipito+ mpe kolongola bango na mokili oyo bámata tii na mokili moko malamu mpe monene, na mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ na mboka ya Bakanana ná Bahiti ná Baamore ná Baperizi ná Bahivi mpe Bayebusi.+

  • Nzembo 105:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Mpe abimisaki bango na palata mpe na wolo;+

      Mpe na kati ya mabota na ye moto moko te azalaki kobɛta libaku.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto