27 Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete: “Komá mpo na yo maloba oyo,+ mpamba te ezali na boyokani na maloba oyo nde nazali kosala kondimana ná yo mpe na Yisraele.”+
9 Na nsima, Moize akomaki mobeko+ oyo mpe apesaki yango banganga-nzambe bana ya Levi,+ bamemi ya sanduku ya kondimana ya Yehova,+ mpe mikóló nyonso ya Yisraele.