Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 36:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Mpe abandaki kosala rido+ na nsinga ya bulé mpe na lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé mpe na biloko oyo epakolami langi ya motane makasi mpe na lini ya kitoko oyo elíngamalíngamá. Asalaki yango ezala na bakeruba, mosala ya moto oyo asalaka mayemi na bansinga.+

  • Kobima 40:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Na nsima akɔtisaki Sanduku na Tabernakle mpe atyaki rido+ ya elamba ya kozipa mpe akangaki nzela ya kokóma na sanduku ya litatoli,+ kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.

  • Balevi 16:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe Yehova alobaki na Moize boye: “Lobá na Arona ndeko na yo ete akɔtaka ntango nyonso te na esika mosantu+ na nsima ya rido,+ liboso ya ezipeli oyo ezali likoló ya Sanduku, mpo akufa te;+ mpo nakomonana na lipata+ likoló ya ezipeli.+

  • Luka 23:45
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 45 mpo pole ya moi elimwaki; bongo rido+ ya esika mosantu epasukaki na katikati.+

  • Baebre 6:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Elikya+ oyo tozali na yango ezali lokola longo mpo na molimo, ezali makasi mpe ngwi, mpe elikya yango ezali kokɔtisa biso na nsima ya rido,+

  • Baebre 9:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Kasi na nsima ya rido+ ya mibale ezalaki na eteni ya hema oyo babengi “Esika oyo Eleki Bosantu.”+

  • Baebre 10:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 oyo ye afungolelaki biso lokola nzela ya sika mpe ya bomoi oyo eleki na rido,+ elingi koloba, nzoto na ye,+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto