21 Na nsima akɔtisaki Sanduku na Tabernakle mpe atyaki rido+ ya elamba ya kozipa mpe akangaki nzela ya kokóma na sanduku ya litatoli,+ kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.
2 Mpe Yehova alobaki na Moize boye: “Lobá na Arona ndeko na yo ete akɔtaka ntango nyonso te na esika mosantu+ na nsima ya rido,+ liboso ya ezipeli oyo ezali likoló ya Sanduku, mpo akufa te;+ mpo nakomonana na lipata+ likoló ya ezipeli.+
6 Bongo banganga-nzambe bakɔtisaki sanduku+ ya kondimana ya Yehova na esika na yango,+ na shambrɛ ya kati mpenza ya ndako, Esika Oyo Eleki Bosantu, na nse ya mapapu ya bakeruba.+
12 akɔtaki, na makila+ ya bantaba mpe ya bana-ngɔmbɛ ya mibali te, kasi nde na makila na ye moko,+ mbala moko mpo na libela, akɔtaki na esika mosantu mpe azwelaki biso kosikolama ya seko.+
24 Mpo Kristo akɔtaki, na esika mosantu oyo esalemi na mabɔkɔ te,+ oyo ezali elilingi ya makambo ya solo,+ kasi nde na likoló mpenza,+ mpo amonana sikoyo liboso ya Nzambe mpenza mpo na biso.+