-
Mitángo 16:40Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
40 mpo ezala ekaniseli mpo na bana ya Yisraele, mpo moto moko te oyo azali mopaya,+ oyo azali mwana ya Arona te, abɛlɛma te mpo na kosala ete mpaka ya malasi ebimisa milinga liboso ya Yehova,+ mpe mpo moto moko te akóma lokola Kora ná liyangani+ na ye, kaka ndenge Yehova alobaki na ye na nzela ya Moize.
-
-
2 Ntango 26:18Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
18 Na nsima, batɛlɛmaki mpo na kotɛmɛla mokonzi Uzia+ mpe balobaki na ye boye: “Ee Uzia, mosala ya kotumbela Yehova mpaka ya malasi ezali ya yo te,+ kasi mosala ya kotumba mpaka ya malasi ezali nde mosala ya banganga-nzambe bana ya Arona,+ oyo basantisamá. Bimá na esika mosantu; mpo ozangi bosembo, mpe Yehova Nzambe akopesa yo ata nkembo moko te+ mpo na yango.”
-