28 ná tirba+ ya lini ya kitoko, biloko ya kolata na motó oyo ebongisaka nzoto,+ oyo esalemi na lini ya kitoko, bakupe ya lini+ oyo esalemi na lini ya kitoko oyo elíngamalíngamá,
30 Nsukansuka basalaki linzanza ya kongɛnga, elembo mosantu ya komipesa na Nzambe, na wolo ya pɛto mpe bakomaki likoló na yango likomi moko oyo bakati kokata ndenge ezalaka na kashɛ: “Bosantu ezali ya Yehova.”+
9 Bongo atyaki tirba+ na motó na ye mpe atyaki likoló ya tirba yango, na liboso na yango, linzanza ya kongɛnga ya wolo, elembo mosantu ya komipesa na Nzambe,+ kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.