Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 10:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “Mpo na nini bolyaki te likabo mpo na lisumu na esika oyo ezali mosantu,+ mpo yango ezali eloko oyo eleki bosantu mpe ye apesi bino yango mpo bózongisa monɔkɔ mpo na libunga ya liyangani mpo na kozipa masumu na bango liboso ya Yehova?+

  • Balevi 22:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “‘Mpe basengeli kokokisa mokumba na bango epai na ngai, mpo bámema lisumu na yango te mpe bákufa+ mpo na yango, mpo bazalaki komona yango eloko mpamba. Ngai Yehova moto nazali kosantisa bango.

  • Mitángo 18:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe Yehova alobaki na Arona ete: “Yo ná bana na yo ya mibali mpe ndako ya tata na yo elongo na yo bokozongisa monɔkɔ mpo na libunga oyo basaleli esika mosantu,+ mpe yo ná bana na yo ya mibali elongo na yo bokozongisa monɔkɔ mpo na libunga oyo basaleli bonganga-nzambe na bino.+

  • Yisaya 53:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpo na mpasi ya molimo na ye, akomona bolamu,+ akotonda.+ Na nzela ya boyebi na ye, moyengebene, mosaleli na ngai,+ akomemela bato mingi ezaleli ya boyengebene;+ mpe ye moko akomema mabunga na bango.+

  • 2 Bakorinti 5:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Moto oyo ayebaki lisumu te,+ akómisaki ye lisumu+ mpo na biso, mpo tókóma boyengebene ya Nzambe+ na nzela na ye.

  • Baebre 9:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Kristo mpe akabamaki mbala moko+ mpo na libela mpo na komema masumu ya bato mingi;+ mpe mbala ya mibale+ oyo akobima+ ekozala te mpo na kolongola lisumu+ mpe bato oyo bazali koluka ye na mposa makasi mpo na lobiko na bango bakomona ye.+

  • 1 Petro 2:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Ye moko amemaki masumu+ na biso na nzoto na ye mpenza likoló ya nzete,+ mpo tótika masumu+ mpe tózala na bomoi ya boyengebene. Mpe “mpo na bampota na ye bino bobiki.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto