-
Kobima 28:43Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
43 Mpe Arona ná bana na ye ya mibali basengeli kolata yango ntango bakokɔta na hema ya kokutana to ntango bakobɛlɛma na etumbelo mpo na kosala na esika mosantu, noki básala libunga mpe bákufa mpenza. Yango ezali mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te mpo na ye mpe bana na ye, oyo bakoya nsima na ye.+
-
-
Kobima 40:15Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
15 Mpe osengeli kotya bango mafuta kaka ndenge otyaki tata na bango mafuta,+ bongo basengeli kosalela ngai mosala ya banganga-nzambe, mpe kotyama oyo batyami mafuta esengeli kopesa bango nzela ya kosala mosala ya bonganga-nzambe ntango nyonso, mpo na ntango oyo etyami ndelo te, na boumeli ya mabota na bango.”+
-