Nzembo 51:15 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 15 Ee Yehova, fungolá mbɛbu na ngai,+Mpo monɔkɔ na ngai esakola lisanzoli na yo.+ Nzembo 143:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Teyá ngai nayeba kosala mokano na yo,+Mpo ozali Nzambe na ngai.+Elimo na yo ezali malamu;+Ekamba ngai na mokili ya bosembo.+ Yisaya 50:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso apesi ngai lolemo ya bato oyo bateyami,+ mpo nayeba ndenge ya koloba mpo na kobɔndisa moto oyo alɛmbi.+ Alamwisaka ntɔngɔ na ntɔngɔ; alamwisaka litoi na ngai mpo nayoka lokola bato oyo bateyami.+ Marko 13:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Kasi ntango bazali komema bino mpo na kokaba bino, bómitungisa liboso te mpo na oyo bosengeli koloba;+ kasi oyo ekopesama epai na bino na ngonga wana bóloba yango, mpo ezali bino te bato bozali koloba, kasi nde elimo santu.+ Luka 12:12 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 12 mpo elimo santu+ ekoteya bino na ngonga wana mpenza makambo oyo bosengeli koloba.”+
10 Teyá ngai nayeba kosala mokano na yo,+Mpo ozali Nzambe na ngai.+Elimo na yo ezali malamu;+Ekamba ngai na mokili ya bosembo.+
4 Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso apesi ngai lolemo ya bato oyo bateyami,+ mpo nayeba ndenge ya koloba mpo na kobɔndisa moto oyo alɛmbi.+ Alamwisaka ntɔngɔ na ntɔngɔ; alamwisaka litoi na ngai mpo nayoka lokola bato oyo bateyami.+
11 Kasi ntango bazali komema bino mpo na kokaba bino, bómitungisa liboso te mpo na oyo bosengeli koloba;+ kasi oyo ekopesama epai na bino na ngonga wana bóloba yango, mpo ezali bino te bato bozali koloba, kasi nde elimo santu.+