Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 16:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Asengeli lisusu kotya mpaka ya malasi na mɔtɔ liboso ya Yehova,+ mpe lipata ya mpaka ya malasi esengeli kozipa ezipeli ya Sanduku,+ oyo ezali likoló ya Litatoli,+ mpo akufa te.

  • Mitángo 16:40
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 40 mpo ezala ekaniseli mpo na bana ya Yisraele, mpo moto moko te oyo azali mopaya,+ oyo azali mwana ya Arona te, abɛlɛma te mpo na kosala ete mpaka ya malasi ebimisa milinga liboso ya Yehova,+ mpe mpo moto moko te akóma lokola Kora ná liyangani+ na ye, kaka ndenge Yehova alobaki na ye na nzela ya Moize.

  • 1 Samwele 2:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpe ye aponamaki mpo na ngai kati na mabota nyonso ya Yisraele,+ mpo na kosala mosala ya nganga-nzambe mpe komata na etumbelo+ na ngai mpo na komatisa milinga ya mbeka, mpo na kolata efode liboso na ngai, mpo napesa ndako ya nkɔkɔ na yo makabo nyonso ya bana ya Yisraele oyo etumbami na mɔtɔ.+

  • 1 Ntango 23:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Bana ya Amirame bango oyo: Arona+ ná Moize.+ Kasi Arona atyamaki pembeni+ mpo asantisaka Esika oyo Eleki Bosantu,+ ye ná bana na ye mpo na ntango oyo etyami ndelo te, mpo na kobimisa milinga ya mbeka+ liboso ya Yehova, mpo na kosalela ye+ mpe mpo na kopambola+ na nkombo na ye mpo na ntango oyo etyami ndelo te.

  • Luka 1:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 ekómaki ngala na ye ya kopesa likabo ya mpaka ya malasi+ na kolanda momeseno ya bonganga-nzambe mpe akɔtaki na esika mosantu ya Yehova;+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto