9 Nsima na yango, basakolaki na Yuda mobimba mpe na Yerusaleme ete bámemela Yehova mpako mosantu+ oyo Moize mosaleli ya Nzambe ya solo asɛngaki+ Yisraele na esobe.
32 Lisusu, tomityelaki mibeko ya kopesaka, moto na moto na kati na biso, moko ya bandambo misato ya shekele mbula na mbula mpo na mosala ya ndako ya Nzambe na biso,+
24 Bakómaki na Kapernaume; na nsima, bato oyo bazalaki kokɔngɔla mpako ya drakimɛ mibale bapusanaki epai ya Petro mpe balobaki ete: “Moteyi na bino afutaka mpako ya drakimɛ mibale te?”+