-
Balevi 5:11Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
11 “‘Sikoyo soki azali na makoki+ te ya kozwa bipopo mibale to bana mibale ya bibenga, asengeli komema lokola likabo na ye mpo na lisumu oyo asali, moko ya bandambo zomi ya efa+ ya farini ya malamu mpo ezala likabo mpo na lisumu. Asengeli te kotya mafuta+ likoló na yango mpe asengeli te kotya olibana likoló na yango, mpo yango ezali likabo mpo na lisumu.+
-
-
Matai 2:11Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
11 Mpe ntango bakɔtaki na ndako bamonaki mwana yango ya moke ná Maria mama na ye, bongo bakweaki na nse mpe bagumbamelaki ye. Bafungolaki mpe biloko na bango ya motuya mpe bapesaki ye makabo: wolo, olibana ná mire.
-