Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 31:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Bongo ntango kaka asilisaki koloba na ye na Ngomba Sinai, apesaki Moize bitanda mibale ya Litatoli,+ bitanda ya mabanga oyo ekomami na mosapi ya Nzambe.+

  • Kobima 34:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Okata bitanda mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso,+ mpe nasengeli kokoma likoló ya bitanda yango maloba oyo ezalaki na bitanda ya liboso,+ oyo obukaki.+

  • Kolimbola Mibeko 9:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Yehova apesaki ngai bitanda mibale ya mabanga oyo ekomami na mosapi ya Nzambe;+ mpe likoló na yango, ezalaki na maloba nyonso oyo Yehova alobelaki bino na ngomba longwa na katikati ya mɔtɔ na mokolo ya lisangá.+

  • Kolimbola Mibeko 10:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe nakokoma na bitanda yango maloba oyo ezalaki na bitanda ya liboso, oyo obukaki, mpe osengeli kotya yango na kati ya sanduku.’

  • 2 Bakorinti 3:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Lisusu, soki mibeko oyo ekomami epesaka liwa+ mpe oyo bakataki makomi na mabanga+ eyaki na nkembo,+ bongo bana ya Yisraele bakokaki te kotala mpenza elongi ya Moize mpo na nkembo ya elongi na ye,+ nkembo oyo esengelaki kolongolama,

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto