-
Yosua 24:15Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
15 Nde soki emonani mabe na miso na bino kosalela Yehova, bópona bino moko lelo nani bino bokosalela,+ soki banzambe oyo bankɔkɔ na bino oyo bazalaki na ngámbo mosusu ya Ebale basalelaki+ to banzambe ya Baamore oyo bozali kofanda na mokili na bango.+ Kasi mpo na ngai mpe bato ya ndako na ngai, tokosalela Yehova.”+
-
-
2 Bakonzi 10:15Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
15 Ntango alongwaki na esika wana akei, akutanaki na Yehonadabe+ mwana ya Rekabe+ azali koya kokutana na ye. Ntango apambolaki+ ye, alobaki na ye boye: “Motema na yo ezali sembo epai na ngai, ndenge motema na ngai ezali epai ya motema na yo?”+
Na yango, Yehonadabe alobaki ete: “Ɛɛ.”
“Soki ezali bongo, pesá ngai lobɔkɔ na yo.”
Bongo apesaki ye lobɔkɔ. Mpe amatisaki ye na likalo esika moko na ye.+
-