30 Yango wana Yakobo apesaki esika yango nkombo Peniele,+ mpamba te, mpo na kozongela maloba na ye: “Namoni Nzambe na miso, kasi ata bongo molimo na ngai ebiki.”+
8 Nalobaka na ye boye mpenza na monɔkɔ,+ namonisaka ye makambo polele, kasi na sambole+ te; mpe amonaka mpenza nde kobima ya Yehova.+ Bongo mpo na nini bobangaki te koloba mabe mpo na mosaleli na ngai, mpo na Moize?”+
38 Ye+ nde azalaki na kati ya lisangá+ na esobe elongo na anzelu+ oyo azalaki koloba na ye na Ngomba Sinai mpe elongo na bankɔkɔ na biso, mpe azwaki maloba mosantu+ ya bomoi mpo na kopesa bino.