3Mpe Moize akómaki mobateli ya mpate ya Yetro,+ nganga-nzambe ya Midiane, oyo Moize azalaki bokilo na ye.+ Wana azalaki komema etonga na ngámbo ya wɛsti ya esobe, nsukansuka akómaki na ngomba ya Nzambe ya solo,+ na Horebe.+
16 Mpe nkembo ya Yehova+ ezalaki kaka kofanda likoló ya Ngomba Sinai,+ mpe lipata ezipaki yango na boumeli ya mikolo motoba. Nsukansuka, na mokolo ya nsambo abengaki Moize longwa na kati ya lipata.+
8 Na yango atɛlɛmaki, alei mpe amɛli, mpe na nguya ya biloko oyo alyaki, atambolaki mikolo ntuku minei (40) butu moi+ tii na Horebe,+ ngomba ya Nzambe ya solo.