Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 28:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 “Mpe osengeli kosala libenga ya ntolo mpo na kosambisa,+ mosala ya moto oyo asalaka mayemi na bansinga. Okosala yango na biloko oyo basalaki na yango efode. Okosala yango na wolo, na nsinga ya bulé mpe na lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé mpe na biloko oyo epakolami langi ya motane makasi mpe na lini ya kitoko oyo elíngamalíngamá.+

  • Kobima 28:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 “Mpe Arona asengeli komema nkombo ya bana ya Yisraele na libenga ya ntolo mpo na kosambisa likoló ya motema na ye, ntango akokɔta na Esika Mosantu, mpo ezala ekaniseli liboso ya Yehova ntango nyonso.

  • Kobima 28:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Mpe osengeli kotya Urime+ ná Tumime na kati ya libenga ya ntolo mpo na kosambisa, mpe yango esengeli kozala likoló ya motema ya Arona ntango akokɔta liboso ya Yehova; mpe Arona asengeli komema bikateli ya lisambisi+ ya bana ya Yisraele likoló ya motema na ye liboso ya Yehova ntango nyonso.

  • Kobima 39:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe basalaki likoló ya libenga ya ntolo minyɔlɔlɔ oyo balitalitá, na ndenge balitaka nsinga, na wolo ya pɛto.+

  • Kobima 39:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Nsukansuka bakangisaki libenga ya ntolo na mpɛtɛ na yango tii na mpɛtɛ ya efode na nsinga ya bulé, mpo ezala likoló ya nkamba ya efode mpe mpo libenga ya ntolo elongwa te likoló ya efode, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto