2 Mpe Yehova alobaki na Moize boye: “Lobá na Arona ndeko na yo ete akɔtaka ntango nyonso te na esika mosantu+ na nsima ya rido,+ liboso ya ezipeli oyo ezali likoló ya Sanduku, mpo akufa te;+ mpo nakomonana na lipata+ likoló ya ezipeli.+
14 “Mpe asengeli kozwa mwa ndambo ya makila+ ya ngɔmbɛ-mobali yango mpe komwangisa yango na mosapi na ye liboso ya ezipeli na ngámbo ya ɛsti, mpe akomwangisa+ mwa ndambo ya makila yango na mosapi na ye mbala nsambo liboso ya ezipeli.+
11 Mpe Davidi apesaki mwana na ye Salomo plan ya kotonga+ ndako ya kokɔtela+ mpe bandako na yango mpe bisika na yango ya kobomba biloko+ mpe bashambrɛ na yango ya likoló+ mpe bashambrɛ na yango ya kati oyo ezali molili mpe ndako ya ezipeli ya kozipa masumu;+