Kobima 7:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Mpe Baezipito bakoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakosembolela Ezipito lobɔkɔ,+ mpe nakolongola solo bana ya Yisraele na katikati na bango.”+ Kobima 9:16 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 16 Kasi, ya solo, natiki yo ozala mpo na ntina oyo:+ mpo nalakisa yo nguya na ngai mpe mpo nkombo na ngai esakolama na mabele mobimba.+ 1 Samwele 25:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Bongo Nabale ayanolaki basaleli ya Davidi mpe alobaki boye: “Davidi nde nani,+ mpe mwana ya Yese nde nani? Mikolo oyo basaleli oyo bazali kokima moto na moto nkolo na ye bakómi ebele.+
5 Mpe Baezipito bakoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakosembolela Ezipito lobɔkɔ,+ mpe nakolongola solo bana ya Yisraele na katikati na bango.”+
16 Kasi, ya solo, natiki yo ozala mpo na ntina oyo:+ mpo nalakisa yo nguya na ngai mpe mpo nkombo na ngai esakolama na mabele mobimba.+
10 Bongo Nabale ayanolaki basaleli ya Davidi mpe alobaki boye: “Davidi nde nani,+ mpe mwana ya Yese nde nani? Mikolo oyo basaleli oyo bazali kokima moto na moto nkolo na ye bakómi ebele.+