12 Mpe osengeli kotya mabanga yango mibale na biteni ya elamba oyo ezali na mapeka ya efode mpo ezala mabanga ya ekaniseli mpo na bana ya Yisraele;+ mpe Arona asengeli komema nkombo na bango na biteni mibale ya elamba oyo ezali na mapeka na ye liboso ya Yehova mpo ezala ekaniseli.