36 “Mpe Bezalele asengeli kosala mosala, ná Oholiabe+ ná mobali nyonso oyo azali na motema ya bwanya oyo Yehova apesi bwanya+ mpe mayele+ na makambo wana mpo na koyeba ndenge ya kosala mosala nyonso ya esika mosantu na kolandáká mitindo nyonso oyo Yehova apesi.”+