19 yo, ɛɛ yo, na motema mawa oyo otondi na yango, otikaki+ bango te na kati ya esobe. Likonzí ya lipata elongwaki te likoló na bango na moi mpo na kokamba bango na nzela,+ mpe likonzí ya mɔtɔ na butu mpo na kongɛngisela bango nzela oyo basengelaki kotambola.+