3 talá lobɔkɔ ya Yehova+ ezali koyela bibwɛlɛ+ na yo oyo ezali na elanga. Maladi mabe ya makasi+ ekozwa bafarasa, bampunda, bakamela, bitonga ya bangɔmbɛ mpe bitonga ya bampate.
11Mpe Yehova alobaki na Moize ete: “Nakoyeisela Farao ná Ezipito bolɔzi moko lisusu. Nsima na yango, akotika bino bólongwa awa, bókende.+ Na ntango akotika bino nyonso bókende, akobengana mpenza bino bólongwa awa.+
31 Na mbala moko abengaki+ Moize ná Arona na butu mpe alobaki ete: “Bótɛlɛma, bólongwa na kati ya bato na ngai, bino ná bana mosusu ya Yisraele, mpe bókende, bósalela Yehova, kaka ndenge bolobi.+