Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 41:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe esalemaki boye: na ntɔngɔ, elimo na ye ekómaki kotungisama.+ Bongo, atindaki bábenga banganga-nzambe nyonso ya Ezipito oyo basalelaka maji+ mpe bato na yango nyonso ya bwanya,+ mpe Farao abandaki koyebisa bango bandɔtɔ na ye.+ Kasi moto mpo na kolimbolela Farao ndɔtɔ yango azalaki te.

  • Yisaya 19:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Bankumu ya Zoane+ bazali mpenza bazoba. Mpo na oyo etali bato ya bwanya kati na bapesi-toli ya Farao, toli na bango ezali eloko moko oyo ezangi mayele.+ Ndenge nini bokoloba na Farao ete: “Nazali mwana ya bato ya bwanya, mwana ya bakonzi ya ntango ya kala”?

  • Yirimia 27:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “‘“‘Bongo bino, bóyokela basakoli na bino te+ mpe basakoli na bino ya makambo oyo ebombaná mpe balɔti ndɔtɔ+ na bino mpe bato na bino ya misala ya maji mpe banganga-nkisi+ na bino, oyo bazali koloba na bino ete: “Bokosalela mokonzi ya Babilone te.”+

  • Danyele 2:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Bongo mokonzi alobaki bábenga banganga-nzambe ya maji+ mpe bato oyo babelelaka bilimo mpe banganga-nkisi mpe Bakaladea mpo na koyebisa mokonzi bandɔtɔ na ye.+ Mpe bakɔtaki mpe batɛlɛmaki liboso ya mokonzi.

  • 2 Timote 3:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Nzokande kaka ndenge Yanesi ná Yambresi+ batɛmɛlaki Moize, bato yango mpe bazali kokoba kotɛmɛla solo,+ babebá mpenza na makanisi,+ Nzambe aboyá bango na kotalela makambo ya kondima.+

  • Emoniseli 21:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Kasi bato ya bibangabanga ná baoyo bazangi kondima+ ná baoyo bazali na bosɔtɔ mpe na mbindo+ ná babomi-bato+ ná bato ya pite+ ná baoyo basalaka misala ya bilimo mabe ná basambeli ya bikeko+ ná bato nyonso ya lokuta,+ likabo na bango ekozala na kati ya laki oyo ezali kopela na mɔtɔ+ mpe na sufulu.+ Yango elakisi liwa ya mibale.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto