Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 7:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Kasi, banganga-nzambe ya Ezipito oyo basalelaka maji basalaki kaka bongo na misala na bango ya molili;+ bongo motema ya Farao ezalaki kaka makasi,+ mpe ayokelaki bango te, kaka ndenge Yehova asilaki koloba.+

  • Kobima 8:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe banganga-nzambe ya maji bazalaki komeka kosala bongo na misala na bango ya molili,+ mpo na kobimisa bangungi, kasi bazalaki kokoka te.+ Mpe bangungi ezalaki likoló ya bato mpe banyama.

  • Kobima 9:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe banganga-nzambe ya maji bakokaki te kotɛlɛma liboso ya Moize mpo na babibɔ, mpamba te babibɔ ebimaki banganga-nzambe ya maji mpe Baezipito nyonso.+

  • Misala 8:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Nzokande na engumba yango, mobali moko azalaki, nkombo na ye Simo, oyo, liboso ya makambo wana, azalaki kosala misala ya maji+ mpe azalaki kokamwisa ekólo ya Samaria, azalaki koloba ete ye azali moto moko monene.+

  • 2 Batesaloniki 2:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Kasi kozala ya mobuki mibeko eyokani na mosala+ ya Satana elongo na misala nyonso ya nguya mpe bilembo ya lokuta mpe makamwisi oyo ezali komonisa makambo oyo ekoya+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto