Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 20:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Kasi sikoyo zongisá mwasi ya mobali wana, mpo azali mosakoli,+ mpe ye akobondela mpo na yo.+ Bongo otikala na bomoi. Kasi soki ozongisi ye te, yebá ete okokufa solo, yo ná bato na yo nyonso.”+

  • Kobima 10:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe sikoyo nabondeli bino, bólimbisa+ lisumu na ngai kaka mbala oyo mpe bóbondela+ Yehova Nzambe na bino ete alongolela ngai kaka bolɔzi oyo ya liwa.”

  • Mitángo 21:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Nsukansuka, bato bayaki epai ya Moize mpe balobaki ete: “Tosali lisumu,+ mpamba te tolobi mabe mpo na Yehova mpe mpo na yo. Bondelá Yehova ete alongwela biso banyoka.”+ Mpe Moize abondelaki Yehova mpo na bato.+

  • 1 Bakonzi 13:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bongo mokonzi ayanolaki mpe alobaki na moto ya Nzambe ya solo boye: “Nabondeli yo, kitisá motema ya Yehova Nzambe na yo mpe bondelá mpo na ngai ete lobɔkɔ na ngai ebonga.”+ Na yango, moto ya Nzambe ya solo akitisaki+ Yehova motema, bongo lobɔkɔ ya mokonzi ebongaki, ezongaki ndenge ezalaki liboso.+

  • Misala 8:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Simo azongisaki ete: “Mibali, bino nde bóbondela Yehova mpo na ngai+ ete ata moko ya makambo oyo bolobi ekómela ngai te.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto