29 Bongo Moize alobaki ete: “Talá nazali kobima epai na yo, mpe nakobondela mpenza Yehova, mpe lobi mapokopoko ekolongwa epai ya Farao, epai ya basaleli na ye mpe epai ya bato na ye. Kaka nde Farao asakana lisusu te na koboyáká kotika bato bákende kopesa Yehova mbeka.”+
8 Na yango, bazongisaki Moize ná Arona epai ya Farao, mpe alobaki na bango ete: “Bókende, bósalela Yehova Nzambe na bino.+ Banani yango mpenza bakokende?”
31 Na mbala moko abengaki+ Moize ná Arona na butu mpe alobaki ete: “Bótɛlɛma, bólongwa na kati ya bato na ngai, bino ná bana mosusu ya Yisraele, mpe bókende, bósalela Yehova, kaka ndenge bolobi.+