20 Bongo Amirame akamataki Yokebede, ndeko ya tata na ye, mpo azala mwasi na ye.+ Na nsima Yokebede abotelaki ye Arona ná Moize.+ Mpe bambula ya bomoi ya Amirame ezalaki mbula nkama moko na ntuku misato na nsambo (137).
59 Mpe nkombo ya mwasi ya Amirame ezalaki Yokebede,+ mwana ya Levi, oyo mwasi ya Levi abotelaki ye na Ezipito. Na nsima, Yokebede abotelaki Amirame Arona ná Moize mpe Miriame ndeko na bango ya mwasi.+