34 Bosengeli koloba ete: ‘Basaleli na yo bazali babɔkɔli ya bibwɛlɛ banda bomwana tii sikoyo, biso ná bankɔkɔ na biso,’+ mpo ete bókoka kofanda na mokili ya Goshene,+ mpamba te mobateli nyonso ya mpate azali eloko oyo eyinami na Ezipito.”+
26 Mpe bibwɛlɛ na biso ekokende na biso elongo.+ Nyama ata moko te ekotikala, mpamba te ezali na kati na yango nde tokozwa oyo tokosalela mpo na kosambela Yehova Nzambe na biso,+ mpe biso moko toyebi te oyo tokopesa mpo na kosambela Yehova tii ntango tokokóma kuna.”+