-
Kobima 7:19Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
19 Na nsima, Yehova alobaki na Moize ete: “Lobá na Arona boye: ‘Kamatá lingenda na yo mpe sembolá lobɔkɔ na yo+ likoló ya mai ya Ezipito, likoló ya bibale na bango, likoló ya banzela ya mai ya Nile mpe likoló ya bitima na bango oyo etondi na matiti+ mpe likoló ya mai nyonso na bango oyo etyamá na bibombelo, mpo ekóma makila.’ Mpe makila ekozala mpenza na mokili mobimba ya Ezipito mpe na biloko oyo babombaka mai, ya mabaya mpe ya mabanga.”
-