Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 13:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe osengeli koyebisa mwana na yo na mokolo yango ete: ‘Ezali mpo na likambo oyo Yehova asalelaki ngai ntango nabimaki na Ezipito.’+

  • Kolimbola Mibeko 4:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “Kaka nde kebá mpe batelá molimo+ na yo, ete obosana te makambo oyo miso na yo emoni+ mpe yango elongwa na motema na yo te mikolo nyonso ya bomoi na yo;+ mpe osengeli koyebisa yango bana na yo mpe bana ya bana na yo,+

  • Kolimbola Mibeko 6:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 osengeli koloba na mwana na yo ete: ‘Tokómaki baombo ya Farao na Ezipito, kasi Yehova abimisaki biso na Ezipito na nguya ya lobɔkɔ na ye.+

  • Nzembo 44:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 Ee Nzambe, toyoki na matoi na biso,

      Bankɔkɔ na biso bayebisi biso+

      Mosala oyo osalaki na mikolo na bango,+

      Na mikolo ya kala.+

  • Nzembo 78:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Mpe abandaki kotɛlɛmisa eloko ya kokanisa na Yakobo,+

      Mpe atyaki mobeko na Yisraele,+

      Mitindo oyo apesaki bankɔkɔ na biso,+

      Mpo na koyebisa yango bana na bango;+

  • Yoele 1:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bóbɛtɛla bana na bino lisolo na yango, mpe bana na bino bábɛtɛla bana na bango, mpe bana na bango bábɛtɛla libota oyo ekolanda.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto