7 Ekómisi nzete na ngai ya vinyo lokola eloko ya kokamwa,+ mpe nzete na ngai ya figi lokola ekumu.+ Etiki yango bolumbu mpenza mpe ebwaki yango.+ Bitape na yango ya mikemike ekómi mpɛmbɛ.
3 Liboso na yango, mɔtɔ elei,+ mpe nsima na yango lolemo ya mɔtɔ ezali kozikisa.+ Na liboso na yango, mokili yango ezali lokola Elanga ya Edene;+ kasi na nsima na yango, ezali esobe oyo etikali mpamba, mpe eloko moko te etikali.