19 Bongo anzelu+ ya Nzambe ya solo, oyo azalaki kotambola liboso ya kaa ya Yisraele, alongwaki mpe akendaki na nsima na bango, mpe likonzí ya lipata elongwaki liboso na bango mpe etɛlɛmaki na nsima na bango.+
15 Sikoyo na mokolo oyo tabernakle+ etɛlɛmisamaki, lipata ezipaki tabernakle ya hema ya Litatoli,+ kasi na mpokwa, eloko oyo emonanaki lokola mɔtɔ+ ezalaki kaka likoló ya tabernakle tii na ntɔngɔ.
33 oyo azalaki kotambola liboso na bino na nzela mpo na konɔngela bino esika oyo bokotya kaa,+ azalaki kosalela mɔtɔ na butu mpo bómona nzela nini bosengelaki kotambola mpe azalaki kosalela lipata na moi.+