Kobima 7:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Nde ngai, nakotika motema ya Farao ekóma makasi,+ mpe nakokómisa bilembo na ngai mpe makamwisi na ngai mingi na mokili ya Ezipito.+ Kolimbola Mibeko 2:30 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 30 Mpe Sihone mokonzi ya Heshibone atikaki tóleka epai na ye te, mpamba te Yehova Nzambe na yo atikaki elimo na ye ekóma makasi+ mpe motema na ye ekóma makasi, mpo na kopesa ye na lobɔkɔ na yo, kaka ndenge ezali na mokolo ya lelo.+ Yosua 11:20 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 20 Mpo Yehova azalaki kosala boye: kotika mitema na bango ekóma makasi+ mpo báluka bitumba ná Yisraele, bongo ye aboma bango nyonso, mpo amonisela bango boboto te,+ kasi asilisa bango nyɛɛ, ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.+ Nzembo 10:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Na lolendo na ye, moto mabe azali kolanda moto ya mpasi na mbamba;+Makanisi oyo bakanisaki ekangi bango.+ Masese 16:18 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 18 Lolendo ezalaka liboso ya kokwea,+ mpe elimo ya komikumisa liboso ya kobɛta libaku.+
3 Nde ngai, nakotika motema ya Farao ekóma makasi,+ mpe nakokómisa bilembo na ngai mpe makamwisi na ngai mingi na mokili ya Ezipito.+
30 Mpe Sihone mokonzi ya Heshibone atikaki tóleka epai na ye te, mpamba te Yehova Nzambe na yo atikaki elimo na ye ekóma makasi+ mpe motema na ye ekóma makasi, mpo na kopesa ye na lobɔkɔ na yo, kaka ndenge ezali na mokolo ya lelo.+
20 Mpo Yehova azalaki kosala boye: kotika mitema na bango ekóma makasi+ mpo báluka bitumba ná Yisraele, bongo ye aboma bango nyonso, mpo amonisela bango boboto te,+ kasi asilisa bango nyɛɛ, ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.+
2 Na lolendo na ye, moto mabe azali kolanda moto ya mpasi na mbamba;+Makanisi oyo bakanisaki ekangi bango.+