Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 16:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe bana ya Yisraele bazalaki koloba na bango ete: “Soki lobɔkɔ ya Yehova ebomaka biso+ na mokili ya Ezipito wana tofandaki pene na banzungu ya misuni ya nyama,+ wana tozalaki kolya mampa ndenge tolingi, mpo bobimisi biso mpe bokɔtisi biso na esobe oyo mpo na koboma lisangá oyo mobimba na nzala.”+

  • Kobima 17:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe kuna bato bazalaki kaka na mposa ya mai, mpe bato bakobaki koimaima mpo na Moize mpe koloba ete: “Mpo na nini obimisi biso na Ezipito mpo na koboma biso ná bana na biso mpe bibwɛlɛ na biso na mposa ya mai?”+

  • Mitángo 14:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe bana nyonso ya Yisraele babandaki koimaima mpo na Moize mpe Arona,+ mpe liyangani mobimba ebandaki koloba na bango ete: “Soki tókufaka ata na mokili ya Ezipito, to soki tókufaka ata na esobe oyo!

  • Nzembo 106:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Bankɔkɔ na biso na Ezipito

      Bamonisaki ata moke te ete bazali na mayele ya kososola liboso ya misala na yo ya kokamwa.+

      Bakanisaki te bonene ya motema boboto na yo ya kokamwa,+

      Kasi na mbu, pene na Mbu Motane, batombokaki.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto