Kolimbola Mibeko 4:21 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 21 “Mpe Yehova asilikelaki ngai makasi mpo na bino,+ bongo alapaki ndai ete nakokatisa Yordani te mpe nakokɔta te na mokili ya malamu oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo lokola libula.+ Nzembo 44:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Yo moko na lobɔkɔ na yo obenganaki mpenza bikólo,+Mpe olonaki bango na esika ya bikólo yango.+Obandaki kobuka bituluku ya bato ya bikólo mpe kotika yango ekende.+ Nzembo 78:54 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 54 Mpe amemaki bango na teritware na ye mosantu,+Etúká oyo ya ngombangomba oyo lobɔkɔ na ye ya mobali ezwaki.+ Nzembo 80:8 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 8 Olongolaki nzete ya vinyo na Ezipito.+Obenganaki bikólo, mpo olona yango.+
21 “Mpe Yehova asilikelaki ngai makasi mpo na bino,+ bongo alapaki ndai ete nakokatisa Yordani te mpe nakokɔta te na mokili ya malamu oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo lokola libula.+
2 Yo moko na lobɔkɔ na yo obenganaki mpenza bikólo,+Mpe olonaki bango na esika ya bikólo yango.+Obandaki kobuka bituluku ya bato ya bikólo mpe kotika yango ekende.+
54 Mpe amemaki bango na teritware na ye mosantu,+Etúká oyo ya ngombangomba oyo lobɔkɔ na ye ya mobali ezwaki.+